Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Mpo na nini nalobaka ntango nyonso te maloba ya malamu?

Mpo na nini nalobaka ntango nyonso te maloba ya malamu?

 “Na bantango mosusu nayebaka kopekisa lolemo na ngai, kasi na bantango mosusu monɔkɔ elobaka makambo oyo yango moko elingi kozanga ete bɔɔngɔ etinda yango!”​—James.

 “Soki nazali kobanga, nalobaka kozanga kokanisa, kasi soki nazali na kimya nalobaka mingi koleka oyo nasengeli koloba. Yango wana mbala mingi, nabebisaka ntango nyonso makambo.”​—Marie.

 Biblia elobi: “Lolemo ezali mɔtɔ” mpe “mwa mɔtɔ moke ekoki kotumba zamba ya monene mpenza!” (Yakobo 3:5, 6) Mbala mingi maloba na yo elukelaka yo makambo? Soki ezali bongo, lisolo oyo ekoki kosalisa yo.

 Mpo na nini nalobaka maloba mabe?

 Kozanga kokoka. Biblia elobi: “Biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi. Soki moto abɛtaka libaku na maloba te, ye azali moto ya kokoka.” (Yakobo 3:2) Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tobɛtaka libaku kaka te ntango tozali kotambola, kasi mpe na maloba na biso.

 “Lokola nazali na bɔɔngɔ ya kozanga kokoka mpe lolemo ya kozanga kokoka, ekozala bozoba soki nalobi ete napekisaka yango na ndenge ya kokoka.”​—Anna.

 Koloba mingi. Biblia elobi: “Na ebele ya maloba, makambo ya kobuka mibeko ezangaka te.” (Masese 10:19) Bato oyo balobaka mingi kasi bayokaka moke, bazangaka te koloba makambo oyo ekosilikisa basusu.

 “Ezalaka ntango nyonso te bato oyo balobaka mingi na likita moko boye nde bazalaka bato ya mayele koleka. Yesu nde moto oyo alekaki bato nyonso na mayele awa na mabele, ata bongo na bantango mosusu azalaki kofanda nyɛɛ.”​—Julia.

 Maloba ya kotyola. Biblia elobi: “Moto mosusu alobaka kozanga kokanisa lokola nde azali kozokisa na mopanga.” (Masese 12:18) Maloba ya kotyola mpe elobamaka kozanga kokanisa; elingi koloba maloba ya kozokisa mpo na kosilisa moto valɛrɛ. Bato oyo basalelaka maloba ya kotyola bakoki koloba, “nazalaki kaka kosala masɛki!” Kasi koyokisa moto nsɔni ezali likambo ya masɛki te. Biblia elobi na biso tólongola ‘maloba ya kofinga ná mabe nyonso.’​—Baefese 4:31.

 “Nalingaka kosala masɛki mpe kosɛkisa bato mpe mbala mingi yango ebendelaka ngai makambo.”​—Oksana.

Soki olobi likambo moko, okoki kozongisa yango lisusu te kaka ndenge okoki te kozongisa nkisi ya konika mino oyo obimisi

 Kopekisa lolemo

 Koyeba kopekisa lolemo ekoki kozala mpasi, kasi toli ya Biblia ekoki kosalisa. Na ndakisa, tótalela makambo oyo elandi.

 “Bóloba na motema na bino, . . . mpe bófanda nyɛɛ.”​—Nzembo 4:4.

 Na bantango mosusu kofanda nyɛɛ ezalaka malamu koleka. Elenge mwasi moko na nkombo Laura, alobi boye: “Ndenge namiyokaka ntango nasiliki ekokanaka te ndenge oyo namiyokaka na nsima. Soki nkanda ekiti, mbala mingi nasepelaka ndenge nalobaki te likambo nakanaki koloba.” Kofanda naino nyɛɛ ata mpo na mwa basegɔnde ekoki kopekisa yo oloba maloba mabe.

 “Litoi emekaka nde maloba te ndenge monɔkɔ emekaka bilei?”​—Yobo 12:11.

 Okoki kokima makambo mingi ya mawa soki liboso ya koloba likambo, omituni mituna oyo elandi mpo oyeba nini ezali na makanisi na yo:

  •   Ezali solo? Ezali boboto? Ezali na ntina?​—Baroma 14:19.

  •   Nakomiyoka ndenge nini soki moto moko alobi na ngai bongo?​—Matai 7:12.

  •   Ekomonisa ete nazali komemya makanisi ya moto mosusu?​—Baroma 12:10.

  •   Ezali ntango ya malamu ya koloba likambo yango?​—Mosakoli 3:7.

 “Na elimo ya komikitisa bómonaka bamosusu ete baleki bino.”​—Bafilipi 2:3.

 Toli yango ekosalisa yo okóma kotalela basusu na makanisi malamu, mpe yango nde ekosalisa yo opekisa lolemo na yo mpe okanisa liboso ya koloba likambo. Ata soki ekómi retare mpe osí olobaki likambo moko oyo esalaki moto mpasi na motema, komikitisa ekosalisa yo osɛnga bolimbisi mpe osala yango nokinoki soki likoki ezali! (Matai 5:23, 24) Na nsima zwá ekateli ya kosala nyonso opekisaka lolemo na yo.