Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna oyo bilenge batunaka

Nakolonga te?

Nakolonga te?

“Liboso nazalaki komona ete moninga na ngai moko aleki ngai. Makambo nyonso ezalaki pɛtɛɛ mpo na ye​—ezalaki komonana lokola azalaki kosala molende moko te mpo na yango! Nazalaki komona lokola nazalaki na likambo moko ya mabe. Nazalaki komituna mpo na nini bongo. Nakómaki komiyina.”​—Annette. *

KOMIYOKA ete okokoka te epekisaka yo kolonga mikakatano mosusu? Batoli ya bato oyo omemyaka esalaka ete ntango mosusu omona ete okolonga te? Mabunga oyo osalá kala elɛmbisaka yo nzoto mpo omeka lisusu te? Soki ezali bongo, ndenge nini okoki kondima mabunga na yo, oyo okanisaki ete esalemaki to oyo esalemaki mpenza?

Ezali mpenza na ntina ozwa eyano na motuna oyo ya nsuka, mpo lelo to lobi, moto nyonso akoki kozanga kokokisa likambo moko. (Baroma 3:23) Kasi bato oyo bandimaka mabunga na bango, babongisaka yango noki. Yango elingi koloba ete batalelaka yango lisusu malamu, batɛlɛmaka mpe bamekaka lisusu. Mpe mbala ya nsima, bazalaka na libaku mpenza ya kolonga! Sikoyo tótalela lolenge oyo okoki kolonga mikakatano misato oyo: Mikakatano oyo ekoki kokóma, oyo okanisaki ete esalemaki mpe oyo esalemaki mpenza.

OYO EKOKI KOKÓMA → OYO EKOKI KOSALEMA

Ozali kozela ete likambo moko ya mabe ekoki koya, mpe ozali kokakatana mpo na komeka, mpo ozali kokanisa ete okolonga mpenza te.

Luká koyeba mokakatano. Awa na nse, tyá elembo ✔ pembeni ya likambo oyo okolinga kolonga, kasi oyo ozali komona ete soki omeki, okolonga te.

  • Kokɔtela bindimeli na yo liboso ya baninga

  • Koluka mosala

  • Koloba liboso ya bato

  • Kosana lisano moko

  • Koyemba to kobɛta miziki

  • Likambo mosusu ․․․․․

Kanisá na yango. Talelá likambo oyo otye elembo, mpe luká koyeba oyo ekoki kokóma na koyanola na mituna oyo:

‘Eloko nini nakolinga esalema?’

․․․․․

‘Likambo nini nazali kobanga?’

․․․․․

Sikoyo, komá ntina moko oyo osengeli komeka likambo yango atako okolonga te.

․․․․․

Ndakisa ya Biblia. Ntango Yehova Nzambe apesaki Moize mokumba ya kotambwisa ekólo Yisraele, akanisaki liboso ete makambo ekosimba te. Atunaki Nzambe boye: “Kanisá ete moto nyonso aboyi koyoka nsango na ngai?” Na nsima akobaki kaka kolobela bolɛmbu na ye. Alobaki ete: “Nalobaka malamu te. Nayebi te nini nakoloba.” Ata ntango Yehova alakaki ete akosalisa ye, Moize amilelaki ete: “Nabondeli yo, tindá moto mosusu asala yango.” (Kobima 4:1, 10, 13, Biblia Contemporary English Version) Nsukansuka, Moize andimaki mokumba yango, mpe toyebi ndenge makambo elekaki. Na litambwisi ya Nzambe, Moize atambwisaki bato ya Yisraele mbula 40.

Oyo okoki kosala. Mokonzi Salomo akomaki ete: “Nyonso oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na makasi na yo mpenza.” (Mosakoli 9:10) Na yango, na esika ya kotika ete nsɔmɔ ya kozanga kolonga epekisa yo, meká kosala oyo okoki kosala. Mpo na nini te kokanisa na likambo moko oyo osalaki malamu mingi koleka ndenge ozalaki kokanisa? Liteya nini ozwaki ntango olongaki? Ndenge nini liteya wana ekoki kosalisa yo olongola nsɔmɔ nyonso ya kobanga oyo okoki kozala na yango sikoyo?

Lisalisi: Soki esengeli, luká makanisi epai ya moboti moko to moninga moko akɔmeli oyo akoki kosalisa yo okóma komona ete okoki kolonga. *

OYO OKANISI ETE ESALEMAKI → OYO OMONI ETE OLONGAKI TE

Ntango moto mosusu alongi na likambo moko, yo okoki komimona ete ozali mpamba.

Luká koyeba mokakatano. Ozali komikokanisa na nani, mpe likambo nini mpenza moto wana asali oyo yo ozali kokanisa ete okolonga te?

․․․․․

Kanisá na yango. Kolonga ya moto wana emonisi mpenza ete yo olongi te. Komá awa na nse likambo moko oyo euti kosalema, na ndakisa ekzamɛ moko na kelasi, oyo osalaki MALAMU kasi moto mosusu asalaki malamu koleka.

․․․․․

Sikoyo komá mpo na nini esengelaki osala makasi mpo olonga.

․․․․․

Ndakisa ya Biblia. Kaina ‘ayokaki nkanda makasi’ ntango emonanaki ete Yehova andimaki ndeko na ye Abele. Yehova akebisaki Kaina mpo na zuwa na ye, kasi amonisaki mpe ete Kaina akokaki kolonga soki aponi kosala malamu. Yehova alobaki na ye ete: “Soki obandi kosala makambo ya malamu, okondimama te?” *​—Ebandeli 4:6, 7.

Oyo okoki kosala. Na esika ya “kobimisa kowelana”​—ata soki ezali naino kaka na makanisi—​ndimá elonga ya basusu. (Bagalatia 5:26; Baroma 12:15) Lisusu, kozanga komikumisa, yebá makoki na yo moko. Biblia elobi ete: “Moto na moto ameka mosala na ye moko ndenge ezali, bongo akozwa likambo ya komikumisa na yango mpo na ye moko.”​Bagalatia 6:4.

OYO ESALEMAKI MPENZA → OYO OKWEAKI NA YANGO

Lokola olongaki te mbala eleki, okoki kokanisa ete ezali na ntina te osala milende.

Luká koyeba mokakatano. Likambo nini oyo olongaki te oyo ezali mpenza kolɛmbisa yo nzoto?

․․․․․

Nsima ya kokwea, soki basalisi ye, moto ya mpiko atɛlɛmaka

Kanisá na yango. Likambo oyo okomaki likoló ete olongaki te, emonisi mpenza ete okolonga te? Na ndakisa, soki okweaki mpo na bolɛmbu moko, yango emonisi mpenza ete okolonga lisusu te? To yango ezali kaka elembo ete ozali na mposa ya lisalisi? Soki okwei ntango ozali kosala lisano moko, okosepela ete moto moko atɛlɛmisa yo mpo ozanga na lisano, boye te? Mpo na nini te kosala kaka bongo mpo na makambo oyo olongaki te? Komá awa na nse nkombo ya moto oyo okoki koyebisa ye mokakatano na yo. *

․․․․․

Ndakisa ya Biblia. Na ntango mosusu, Paulo azalaki kolɛmba nzoto mpo na bolɛmbu na ye. Akomaki ete: “Aa, ngai moto ya mawa penza!” (Ba-Romén 7:24, Bible na lingala ya lelo oyo) Kasi, Paulo ayebaki ete asengeli kotika te bolɛmbu elɛmbisa ye. Akomaki ete: “Nabundi etumba ya malamu mingi, napoti mbangu tii na nsuka, nabateli kondima.”​—2 Timote 4:7.

Oyo okoki kosala. Na esika ya kotya makanisi kaka na bolɛmbu na yo, kanisá mpe na makambo ya malamu oyo osalaka. Yango nde Yehova asalaka mpo na yo. Biblia elobi ete: “Nzambe azangi boyengebene te mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomoniselaki nkombo na ye.”​—Baebre 6:10; Nzembo 110:3.

Kanisá na likambo oyo: Moto ya kokoka azali te. Moto nyonso akweaka ntango mosusu na likambo ata moko. Soki osali makasi ete okangaka mabɔkɔ te soki okwei, okokóma mpenza na makoki oyo ekosalisa yo ntango okokóma mokóló. Mokanda ya Masese 24:16 elobi ete: “Moyengebene akoki kokwea mbala nsambo, mpe akotɛlɛma mpenza.” Wana nde lolenge ya moto oyo okoki kozala!

 

^ par. 3 Bankombo mosusu ezali ya bango te.

^ par. 23 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Lamuká! ya Mai 2010, nkasa 26-28, na Lifalanse.

^ par. 31 Kaina aboyaki kolanda likebisi ya Yehova. Oyo ekómelaki ye esengeli kosalisa yo obundisa makanisi nyonso ya zuwa oyo ekoki koya soki moto mosusu alongi na likambo moko.​—Bafilipi 2:3.

^ par. 36 Mokristo oyo asali libunga monene asengeli kosolola na nkulutu moko ya lisangá.​—Yakobo 5:14, 16.