Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndenge bavɛrsɛ ya Biblia elimbolami

Luká koyeba ndenge bavɛrsɛ ya Biblia oyo eyebani mingi mpe bafraze na yango elimbolami. Luká koyeba makambo oyo etali bavɛrsɛ yango ntango ozali kotánga yango na kotalela makambo oyo bazali kolobela. Kolisá boyebi na yo na lisalisi ya maloba na nse ya lokasa, mpe ndimbola ya maloba oyo oyebi malamu te.

Ndenge Ebandeli 1:1 elimbolami​—“Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mabele”

Vɛrsɛ ya liboso ya Biblia elobeli makambo nini mibale ya ntina oyo ezali solo?

Ndenge Kobima 20:12 elimbolami​—“Kumisá tata na yo mpe mama na yo”

Ntango Nzambe abakisaki elaka na mobeko yango, apesaki bango ntina mosusu oyo basengelaki kotosa yango.

Yosua 1:9 Elimbolami​—“Zalá na mpiko mpe zalá na makasi”

Ndenge nini okoki kozwa mpiko mpe makasi ntango ozali kokutana na mpasi mpe mikakatano oyo emonani lokola okolonga te?

Nzembo 23:4 Elimbolami​—“Ata soki nazali kotambola na lobwaku ya molili makasi”

Ata na ntango ya mpasi mpenza, ndenge nini Nzambe abatelaka mpe atyelaka basambeli na ye likebi?

Nzembo 37:4 elimbolami—“Yawe ázala esengo na yo”

Ndenge nzembo yango esalaka biso tókóma na bwanya mpe tózala lolenge ya bato oyo Nzambe andimaka?

Nzembo 46:10 elimbolami​​—“Zalá nyɛɛ mpe yebá ete ngai nazali Nzambe”

Vɛrsɛ yango elimboli kaka ete esengeli kofanda nyɛɛ na ndako-nzambe?

Masese 3:5, 6 elimbolami​—“Kondimela mayele na yo moko te”

Ndenge nini okoki komonisa ete otyelaka Nzambe motema koleka?

Ndenge Yisaya 40:31 elimbolami​—“Baoyo bazali kotyela Yehova elikya bakozwa nguya ya sika”

Mpo na nini Makomami ekokanisi moto oyo azali kozwa nguya epai ya Nzambe na mpongo oyo ezali kopumbwa?

Ndenge Yisaya 41:10 elimbolami​—“Kobanga te, mpo nazali na yo”

Yehova asaleli maloba misato oyo ezali kokitisa basambeli na ye ya sembo motema ete akosunga bango.

Ndenge Yirimia 29:11 elimbolami​—“Nayebi malamu makanisi oyo nazali kokanisa mpo na bino”

Nzambe azali na makambo ya sikisiki oyo abongisá mpo na moto na moto?

Matai 6:33 elimbolami​—“Bokoba koluka liboso Bokonzi ya Nzambe”

Yesu alingaki nde koloba ete bakristo basengeli te kosala mosala mpo na koluka biloko ya mosuni?

Ndenge Matai 6:34 elimbolami​—‘Bómitungisa te mpo na makambo ekoya lobi’

Yesu alingaki te koloba ete tosengeli te kobongisa makambo mpo na mikolo ezali koya.

Marko 1:15​—“Bokonzi ya Nzambe ebelemi”

Yesu alingaki koloba ete Bokonzi ya Nzambe esí ebandaki koyangela?

Ndenge Yoane 1:1 elimbolami​—“Na ebandeli Liloba azalaki”

Vɛrsɛ oyo emonisi makambo mikemike etali bomoi ya Yesu Kristo liboso aya awa na mabele lokola moto.

Yoane 3:16 Elimbolami​—“Mpo Nzambe alingaki mokili mingi”

Ndenge nini Yehova Nzambe amonisaki ete alingaka mokomoko na biso mpe alingaka tózala na bomoi libela na libela?

Ndenge Yoane 16:33 elimbolami​—“Ngai nalongi mokili”

Ndenge nini maloba ya Yesu elendisaka bayekoli na ye ete bakoki kolonga kosepelisa Nzambe?

Ndenge Baroma 10:13 elimbolami​—‘Kobelela nkombo ya Nkolo’

Nzambe apesi bato nyonso libaku ya kobika mpe ya kozwa bomoi ya seko, yango etaleli te ekólo, loposo, bakelasi oyo batángá, ezala bazali bazwi to babola.

Ndenge Bafilipi 4:6, 7 elimbolami​—“Bómitungisa ata na likambo moko te”

Mabondeli ya lolenge nini ekoki kosalisa basambeli ya Nzambe bátika komitungisa mpe bázwa kimya ya motema?

Ndenge Bafilipi 4:13 elimbolami​—“Nakokí na mâná mánso mpô ya Krístu óyo akoléndisaka ngáí”

Paulo alingaki koloba nini ntango akomaki ete azwaki nguya “na makambo nyonso”?

Baebre 11:1—“Kondima ezali ezaleli ya kozela na motema mobimba biloko oyo ozali kolikya kozwa”

Kondima ya solosolo ezalaka ndenge nini, mpe mpo na nini ezali na ntina?