Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Buku oyo okoki kotyela motema​—Eteni 3

Lisolo ya Babilone na Biblia

Buku oyo okoki kotyela motema​—Eteni 3

Oyo ezali lisolo ya misato na masolo nsambo oyo ekokoba kobima na banimero ya “Lamuká!” oyo ekolobela banguya nsambo ya mokili mobimba oyo Biblia elobeli. Ntina na yango ezali ya komonisa ete Biblia ebongi kotyelama motema mpe ete ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ete nsango na yango ezali nsango ya elikya​—elikya ya komona nsuka ya mpasi oyo euti na boyangeli mabe ya bato likoló ya baninga na bango bato.

Liyemi ya engumba Babilone ya kala

BABILONE, oyo ezalaki na mokili patatalu oyo ebotaka mingi, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 80 na sudi ya esika engumba Bagdad ezali, ezalaki engumba moko kitoko mpe monene mpenza. Lokola etongamaki na bifelo ya makasi mibalemibale mpe ezingamaki na terase monene ya mai, Babilone ezalaki komonana ete ekoki kozwama te na banguna. Engumba yango eyebanaki mingi mpo na bilanga na yango kitoko ya fololo (jardins suspendus), mpe batempelo na yango ya minene mpe oyo ya milaimilai. Lokola Babilone ezalaki moko ya bingumba minene ya ntango ya kala, bautaki kopesa yango nkombo “engumba ya makambo ya kokamwisa.”

Na Biblia, Babilone ebengamaki “Mwasi oyo azali Nkolo ya Makonzi” mpe ezalaki engumba-mokonzi ya ekólo ya misato oyo Biblia elobi ete elekaki nguya na mokili mobimba. (Yisaya 47:5) Ndenge moko na Ezipito mpe Asiri oyo ezalaki liboso na yango, Ampire ya Babilone ezali na esika monene na lisolo ya Biblia; na yango tokoki kokokanisa makambo oyo Biblia elobi mpo na yango na oyo mikanda ya mokili elobi.

Lisolo oyo ebongi kotyela motema

Mokanda ya Danyele eyebisi biso ete na eleko moko boye, mobali moko na nkombo Beleshazare azalaki mokonzi na Babilone. (Danyele 5:1) Kasi, mikanda mosusu ya mokili elobaki kala ete atako Beleshazare azalaki na nguya mingi, azalaki mokonzi ata mokolo moko te. Biblia ekosi nde? Bato ya arkeoloji bakundolaki mwa bitanda mike ya mabele na bitiká ya engumba Ure, na Mezopotamia. Makomi ya cunéiforme oyo ezalaki na etanda moko, ezalaki na libondeli ya Nabonide, mokonzi ya Babilone, mpo na ‘Bel-sar-ussur, mwana na ye ya liboso ya mobali.’ Buku moko (New Bible Dictionary) elobi ete biloko oyo bakundolaki na nsima endimisaki ete Beleshazare “ayangelaki na esika ya tata na ye na boumeli ya bambula nyonso ya boyangeli ya tata na ye kabolá na mibale mpe koleka, [mpe] tokoki koloba ete na ntango yango azalaki mpenza mokonzi.”

Masolo ya kala emonisi mpe ete Babilone ya kala ezalaki engumba oyo bato bazalaki komipesa mingi na makambo ya losambo. Bato bamipesaki na astroloji mpe na kosakola makambo ebombaná. Na ndakisa, Ezekiele 21:21 elobi ete mokonzi ya Babilone alukaki kosakola makambo oyo ebombaná mpo na koyeba soki asengeli kobundisa Yerusaleme. Biblia elobi ete mokonzi yango ‘atalatalaki na kati ya libale.’ Mpo na nini asalelaki libale? Bato ya Babilone bazalaki kosalela libale ya nyama mpo na koyeba makambo oyo ekoya. Buku moko (Mesopotamian Astrology) elobi ete na site moko mpamba ya Babilone ya kala, bato ya arkeoloji bakundolaki mwa “mabale 32 [ya mabele ya lima] mpe nyonso ezalaki na makomi” ya makambo oyo ekoya.

Mokolo moko Nelson Glueck, moto moko ya arkeoloji oyo ayebani mingi, alobaki boye: “Nasalá mosala ya kotimola biloko ya kala mbula 30, Biblia na lobɔkɔ moko mpe pau na lobɔkɔ mosusu, mpe na oyo etali masolo ya kala, namoná ata mokolo moko te ete Biblia elobi lokuta.”

“Nasalá mosala ya kotimola biloko ya kala mbula 30 . . . , mpe na oyo etali masolo ya kala, namoná ata mokolo moko te ete Biblia elobi lokuta.”​—Nelson Glueck

Bisakweli oyo okoki kotyela motema

Okoloba nini soki moto alobi na yo ete engumba-mokonzi moko monene​—na ndakisa Pékin, Moscou, to mpe Washington—​ekozala ata na mofandi moko lisusu te? Ekozala mpasi ondima yango. Nzokande, yango nde ekómelaki Babilone ya kala. Mbula soki 200 liboso, na mobu soki 732 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Yehova Nzambe atindaki mosakoli Yisaya akoma esakweli moko oyo etali nsuka ya Babilone, ampire ya nguya. Akomaki boye: “Babilone, kitoko ya makonzi, . . . ekokóma mpenza lokola ntango Nzambe akweisaki Sodoma ná Gomora. Bato bakofanda epai na ye ata mokolo moko te, akozala mpe na esika ya kofanda te libota na libota.”​—Yisaya 13:19, 20.

Kasi, mpo na nini Nzambe asakolaki kobebisama ya Babilone? Na mobu 607 L.T.B., mampinga ya Babilone ebebisaki Yerusaleme mpe ememaki bato bakangami na Babilone, epai banyokwamaki makasi. (Nzembo 137:8, 9) Nzambe asakolaki ete bato na ye bakonyokwama ndenge wana mbula 70 mpo na misala na bango moko ya mabe. Na nsima, Nzambe akosikola bango mpe akotika bango bázonga na mokili na bango.​—Yirimia 25:11; 29:10.

Kaka ndenge Liloba ya Nzambe esakolaki yango, na mobu 539 L.T.B.​—ntango kaka boombo ya mbula 70 ya Yuda ekómaki pene na nsuka—​mampinga ya Bamede ná Baperse bakweisaki engumba Babilone, oyo ezalaki komonana lokola bakoki kolonga yango te. Na nsima, engumba yango ebebaki nyonso, kaka ndenge esakolamaki. Moto moko te akokaki kosakola likambo ya nsɔmɔ ndenge wana. Ntembe ezali te ete likoki oyo Mobandisi ya Biblia, Nzambe ya solo Yehova, azali na yango ya kosakola makambo oyo ekoya, ekesenisaka ye na banzambe mosusu.​—Yisaya 46:9, 10.

Elikya oyo okoki kotyela motema

Nzokande, ezali na esakweli mosusu oyo ezali kokokisama na ndenge ya kokamwa na mikolo na biso. Esakweli yango etali Nebukadenezare, mokonzi ya Babilone mpe ndɔtɔ moko ya ekeko moko monene oyo alɔtaki. Ekeko yango ekabolamaki na biteni mitano​—motó, ntolo ná mabɔkɔ, libumu ná bibɛlɔ, makolo, mpe makaka—​mokomoko esalemaki na bibende oyo ekeseni. (Danyele 2:31-33) Biteni yango ya bibende emonisaki ndenge baguvɛrnema to makonzi ekolandana, kobanda na Babilone tii na Angleterre ná États-Unis, nguya ya nsambo na mokili mobimba oyo Biblia elobeli.​—Danyele 2:36-41.

Danyele alobaki ete makaka mpe misapi ya ekeko yango esalemaki na biloko ya ndenge mosusu mpenza. Ndenge nini? Na esika ezala ebende ya solosolo, batyaki ebende esangani na mabele ya lima ya maimai. Danyele alimbwelaki Nebukadenezare boye: “Lokola omonaki ebende esangani na mabele ya lima ya maimai, yango ekosangana na bana ya bato; kasi ekokangana te, oyo ná oyo mosusu, kaka ndenge ebende esanganaka te na mabele ya lima oyo bayemi.” (Danyele 2:43) Ya solo, kosangisa ebende ná mabele esimbaka te; ‘ekanganaka te.’ Yango emonisi malamu mpenza ndenge mokili ya lelo ekabwani na makambo ya politiki!

Danyele alobelaki mpe likambo mosusu ya ntina mingi. Na ndɔtɔ na ye, Mokonzi Nebukadenezare amonaki libanga moko oyo elongolamaki na ngomba moko monene mpe “ebɛtaki ekeko yango na makaka na yango ya ebende mpe ya mabele ya lima oyo bayemi mpe ebukaki yango.” (Danyele 2:34) Yango elimboli nini? Danyele ye moko ayanolaki boye: “Na mikolo ya bakonzi yango [na ntango ya boyangeli ya nguya ya nsuka ya mokili mobimba] Nzambe ya likoló akotya bokonzi moko oyo ekobebisama te. Mpe bokonzi yango ekoleka na ekólo mosusu te. Ekotuta mpe ekosukisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala seko.” (Danyele 2:44) Esakweli yango elobeli Bokonzi moko oyo ekeseni na baguvɛrnema mosusu nyonso oyo bato bayebi. Mokonzi na yango ezali Yesu Kristo, Masiya. Ndenge tomonaki yango na masolo mosusu oyo elobeli bikólo oyo elekaki nguya na mokili mobimba, Yesu akobebisa Satana ná bato nyonso oyo bazali na ngámbo na ye, ezala bato to bikelamu ya elimo, mpe na bongo akosala ete kimya mpe bomoko ezala na mokili mobimba.​—1 Bakorinti 15:25.