Kobima 4:1-31

  • Bilembo misato oyo Moize asengeli kosala (1-9)

  • Moize amoni ete akokoka te (10-17)

  • Moize azongi na Ezipito (18-26)

  • Moize akutani na Arona (27-31)

4  Nzokande, Moize ayanolaki ete: “Kasi, kanisá ete bandimi ngai te+ mpe bayoki mongongo na ngai te, mpo bakoloba ete: ‘Yehova abimelaki yo te.’”  Bongo Yehova alobaki na ye ete: “Eloko nini wana na lobɔkɔ na yo?” Ayanolaki ete: “Lingenda.”  Alobaki ete: “Bwaká yango na mabele.” Bongo abwakaki yango na mabele, ekómaki nyoka;+ mpe Moize akimaki yango.  Sikoyo Yehova alobaki na Moize ete: “Sembolá lobɔkɔ na yo mpe simbá yango na mokila.” Bongo asembolaki lobɔkɔ na ye mpe asimbaki yango, mpe yango ekómaki lisusu lingenda na lobɔkɔ na ye.  Na nsima, Nzambe alobaki na ye ete: “Ezali mpo bándima ete Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango, Nzambe ya Abrahama, Nzambe ya Yisaka mpe Nzambe ya Yakobo,+ abimelaki yo.”+  Yehova alobaki na ye lisusu ete: “Nabondeli yo, tyá lobɔkɔ na yo na kati ya lisusa ya likoló ya elamba na yo.” Bongo atyaki lobɔkɔ na ye na kati ya lisusa ya elamba na ye. Ntango abimisaki yango, talá, lobɔkɔ na ye ezwaki maladi ya maba: ekómaki mpɛmbɛ lokola nɛjɛ!+  Na nsima, alobaki ete: “Zongisá lobɔkɔ na yo na kati ya lisusa ya likoló ya elamba na yo.” Bongo azongisaki lobɔkɔ na ye na elamba na ye. Ntango abimisaki yango na elamba na ye, ezongaki lokola biteni mosusu ya nzoto na ye!  Alobaki ete: “Soki bakondima yo te mpe bakotya likebi na elembo ya liboso te, boye bakotya mpenza likebi na elembo ya mibale.+  Nzokande, ata soki bakondima bilembo wana mibale te mpe bakoboya koyoka mongongo na yo, okozwa mwa mai na Ebale Nile mpe okosopa yango na mokili, mpe mai oyo okozwa na Ebale Nile ekokóma makila na mokili.”+ 10  Bongo Moize alobaki na Yehova ete: “Limbisá ngai, Yehova, kutu ngai nalobaka malamu te, ezala banda kala to banda ozali kosolola na mosaleli na yo, mpo nazali monɔkɔ kilo mpe lolemo kilo.”+ 11  Yehova alobaki na ye ete: “Nani asalá monɔkɔ mpo na moto, to nani asalaka ete moto alobaka te, moto akufá matoi, moto amonaka to moto akufá miso? Ezali ngai Yehova te? 12  Sikoyo kende, mpe nakozala elongo na yo ntango okoloba,* mpe nakoteya yo oyo osengeli koloba.”+ 13  Kasi alobaki ete: “Limbisá ngai, Yehova, nabondeli yo, tindá moto oyo okolinga kotinda.” 14  Na yango nkanda ya Yehova engalelaki Moize mpe alobaki ete: “Arona Molevi azali ndeko na yo te?+ Nayebi ete akoki koloba malamu. Mpe azali sikoyo na nzela mpo na kokutana na yo. Ntango akomona yo, motema na ye ekosepela.+ 15  Bongo osengeli koloba na ye mpe koyebisa ye makambo oyo asengeli koloba,*+ mpe nakozala elongo na bino ntango bokoloba,+ mpe nakoteya bino oyo bokosala. 16  Mpe asengeli kolobela yo epai ya bato, mpe akozala molobeli na yo, mpe yo okozala lokola Nzambe mpo na ye.*+ 17  Mpe okozwa lingenda oyo na lobɔkɔ na yo mpe okosala na yango bilembo.”+ 18  Bongo Moize azongaki epai ya Yetro bokilo na ye+ mpe alobaki na ye ete: “Nabondeli yo, nalingi kokende mpe kozonga epai ya bandeko na ngai oyo bazali na Ezipito mpo namona soki bazali naino na bomoi.” Yetro alobaki na Moize ete: “Kende na kimya.” 19  Nsima na yango, Yehova alobaki na Moize na Midiane ete: “Kende, zongá na Ezipito, mpo bato nyonso oyo bazalaki koluka koboma yo* bakufá.”+ 20  Bongo Moize azwaki mwasi na ye ná bana na ye, amatisaki bango na mpunda, mpe abandaki kozonga na mokili ya Ezipito. Moize azwaki mpe lingenda ya Nzambe ya solo na lobɔkɔ na ye. 21  Yehova alobaki lisusu na Moize ete: “Soki ozongi na Ezipito, salá nyonso ete ntango okozala liboso ya Farao osala makamwisi nyonso oyo napesi yo nguya ya kosala.+ Kasi nakotika motema na ye ekóma makasi,+ mpe akotika bato bákende te.+ 22  Osengeli koloba na Farao ete: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Yisraele azali mwana na ngai ya mobali, mwana na ngai ya liboso.+ 23  Nalobi na yo ete: Tiká mwana na ngai ya mobali akende mpo asalela ngai. Kasi soki oboyi kotika ye akende, nakoboma mwana na yo ya mobali, mwana na yo ya liboso.”’”+ 24  Bongo ntango azalaki na nzela, na esika ya kolala, Yehova+ akutanaki na ye mpe azalaki koluka ndenge ya koboma ye.+ 25  Nsukansuka, Zipora+ azwaki libanga ya silekisi* mpe akataki mwana na ye ngenga mpe asalaki ete esutu yango esimba makolo na ye mpe alobaki ete: “Mpo ozali mobali na ngai ya makila.” 26  Bongo Nzambe atikaki ye akende. Na ntango yango, Zipora alobaki ete: “Mobali ya makila,” mpo na kokatama ngenga. 27  Bongo Yehova alobaki na Arona ete: “Kende na esobe mpo na kokutana na Moize.”+ Na yango, akendaki mpe akutanaki na ye na ngomba ya Nzambe ya solo+ mpe apwɛpwaki ye. 28  Mpe Moize ayebisaki Arona maloba nyonso ya Yehova, oyo atindaki ye,+ mpe bilembo nyonso oyo apesaki ye etinda ete asala.+ 29  Nsima na yango, Moize ná Arona bakendaki mpe bayanganisaki bankulutu nyonso ya Bayisraele.+ 30  Arona ayebisaki bango maloba nyonso oyo Yehova alobaki na Moize, mpe asalaki bilembo+ na miso ya bato yango. 31  Na yango, bato bandimaki.+ Ntango bayokaki ete Yehova atyeli Bayisraele likebi+ mpe ete amoni mpasi na bango,+ bagumbamaki mpe bafukamaki bilongi na nse.

Maloba na nse

Lil., “na monɔkɔ na yo.”
Lil., “kotya maloba na monɔkɔ na ye.”
To, “okozala momonisi ya Nzambe mpo na ye.”
To, “koluka molimo na yo.”
To, “mbeli ya libanga ya silekisi.”