Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Ndenge nini nakoki kopekisa mayoki ya mabe?

Ndenge nini nakoki kopekisa mayoki ya mabe?

“Lelo nakoki komiyoka malamu, kasi lobi namiyoki mabe mpenza. Makambo oyo namonaki yango mpasi te na mikolo eleki, ekómeli ngai lelo mpasi.”​—Carissa.

Ekómaka ete mayoki na yo emata to ekita lokola nzela ya mabulumabulu? a Soki bongo, lisolo oyo ekoki kosalisa yo!

 Mpo na nini ekómaka

 Mayoki ya bongo eyaka mingi ntango mwana mwasi to mwana mobali abandi kokóma mpenza mwasi to mobali. Ata soki ozali komiyoka malamu na eleko yango, okoki kokamwa ndenge mayoki na yo ekoki kobongwana na mbalakaka.

 Soki ozali komitungisa mpo mayoki na yo ezali kobongwana mpambampamba, kobosana te ete ezalaka mingimingi mpo na mbongwana oyo esalemaka na ba-hormone na yo bakisá mpe komitungisa mpe kobanga oyo moto ayokaka ntango azali kokola. Nsango ya malamu ezali ete, okoki koyeba mpenza ndenge mayoki yango ezalaka mpe ndenge ya kolonga yango.

 Likambo ya solo: Koyeba ndenge ya kopekisa mayoki ya mabe ntango ozali naino elenge ezali na ntina mpo ntango okokola, okozala na mposa ya kosala bongo na makambo ndenge na ndenge.

Mayoki ya mabe ezali lokola mabulu na nzela. Soki ozali na bwanya, okoki kokima mabulu ya minene mpe kotambola na bisika oyo ezangi mabulu

 Makambo misato okoki kosala

 Lobá. Biblia elobi: “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.”​—Masese 17:17.

 “Tozali na moninga moko ya libota oyo nazwaka ye lokola ndeko ya baboti na ngai. Atyaka mpenza likebi na makambo nalingi koloba mpe nabangaka te koyebisa ye makambo na ngai. Soki likanisi na ngai ezali malamu, akumisaka ngai kasi soki ezali mabe, asembolaka ngai na ndenge ebongi.”​—Yolanda.

 Toli: Na esika oyebisaka kaka baninga na yo, oyo mbala mosusu bango mpe bazali komiyoka ndenge yo ozali komiyoka, yebisá nde moboti to mokóló mosusu oyo otyelaka motema.

 Komá. Biblia elobi boye mpo na Yobo, oyo azangaki mpenza elikya: “Nakobimisa lobanzo oyo nazali na yango mpo na ngai moko. Nakoloba na bololo ya molimo na ngai!” (Yobo 10:1) Longola koyebisa moto moko, mwaye mosusu oyo okoki “kobimisa lobanzo” ezali ya kokoma mayoki na yo.

 “Namemaka mwa carnet bisika nyonso. Soki namoni eloko moko oyo esilikisi ngai, nakomaka likambo yango. Kokoma ezali lokola nkisi oyo esalisaka ngai mpenza.”​—Iliana.

 Toli: Zalá na mwa carnet oyo okoki kokomaka ndenge ozali komiyoka, nini esali ete omiyoka bongo mpe ndenge ya kosala na likambo yango. Lokasa oyo ezali na lisolo oyo ekoki kosalisa yo osala bongo.

 Bondelá. Biblia elobi: “Bwakelá Yehova ye moko mokumba na yo ya kilo, mpe ye moko akosunga yo. Akopesa nzela ata moke te ete moyengebene atengatenga.”​—Nzembo 55:22.

 “Nabondelaka Yehova mingi soki natungisami na makanisi. Nayokaka ntango nyonso malamu soki nafungoleli ye motema na ngai.”​—Jasmine.

 Toli: Ata soki ozali komitungisa, kanisá makambo misato ya bomoi na yo oyo okoki kopesa matondi mpo na yango. Ntango ozali kobondela Yehova, sɛngá ye asalisa yo; kasi pesá ye mpe mersi mpo na mapamboli oyo ozali na yango.

a Lisolo oyo elobeli mayoki ya mabe oyo ezalaka epai ya bilenge mingi. Soki ozali konyokwama na maladi ya motó to maladi mosusu ya makanisi, talá lisolo “Nasala nini ntango nazali kotungisama na makanisi?”