Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mpo na nini baboti batikaka ngai te namisepelisa?

Mpo na nini baboti batikaka ngai te namisepelisa?

Kanisá naino na likambo oyo:

Babengi yo na fɛti moko, kasi oyebi te soki baboti na yo bakopesa yo nzela okende. Okosala nini?

  1.  NAKOSƐNGA NZELA TE​—NAKOKENDE KAKA

  2.  NAKOSƐNGA NZELA TE​—NAKOKENDE MPE TE

  3.  NAKOSƐNGA NZELA​—MPE NAKOZELA

 1. NAKOSƐNGA NZELA TE​—NAKOKENDE KAKA

 Ntina oyo olingi kosala bongo: Olingi kolakisa baninga na yo ete okoki kosala makambo ndenge olingi. Omonaka ete oyebi mingi koleka baboti na yo, to otosaka bango na makambo nyonso te.​—Masese 14:18.

 Makambo oyo ekobimisa: Okoki kokamwisa baninga na yo, kasi bakoyeba mpe ete ozali na mayele mabe. Soki ozali kokosa baboti na yo, mokolo mosusu okokosa mpe baninga na yo. Soki baboti na yo bamoni ete okosaki bango, bakoyoka mpasi mingi, mpe na ntembe te, bakopekisa yo obimaka!​—Masese 12:15.

 2. NAKOSƐNGA NZELA TE​—NAKOKENDE MPE TE

 Ntina oyo olingi kosala bongo: Okanisi malamu mpe omoni ete likambo oyo bokosala kuna eyokani te na makambo oyo Biblia eteyaka to mpe bato mosusu oyo okokutana na bango kuna bakozala baninga malamu te. (1 Bakorinti 15:33; Bafilipi 4:8) To mpe, okoki kozala na mposa ya kokende, kasi ozali kobanga kosɛnga nzela epai ya baboti na yo.

 Makambo oyo ekobimisa: Soki oboyi kokende mpo oyebi ete ezali malamu te, okobanga te koyanola baninga na yo soki batuni yo mpo na nini oyaki te. Kasi soki oboyi kokende kaka mpo ozali na makasi te ya kosɛnga nzela epai ya baboti, okotikala na ndako obandi koimaima, mpo okanisi ete bazali kopimela yo bisengo.

 3. NAKOSƐNGA NZELA​—MPE NAKOZELA

 Ntina oyo olingi kosala bongo: Oyebi ete baboti na yo bazali na bokonzi likoló na yo mpe omemyaka makanisi na bango. (Bakolose 3:20) Olingaka baboti na yo mpe olingi te kokosa bango mpe kobima na baninga na yo, mpo yango ekoyokisa bango mpasi. (Masese 10:1) Okoki mpe komonisa ntina oyo olingi kokende kuna.

 Makambo oyo ekobimisa: Baboti na yo bakomona ete olingaka bango mpe omemyaka bango. Mpe soki bamoni ete likambo oyo osɛngi ezali mabe te, bakoki kondima.

Ntina oyo baboti bakoki koboya

Lokola bato oyo basalaka mosala ya kobikisa baoyo balingi kozinda na mai, baboti na yo bamonaka malamu bisika oyo makama ezali

 Ntina moko ekoki kolimbolama boye: Soki olingi kokende na libongo, okosepela kobɛta mai (nager) esika oyo ezali na bato oyo basalaka mosala ya kobikisa bato oyo balingi kozinda na mai. Mpo na nini? Mpo ntango ozali kosakana na mai, okoyeba mpenza te soki likama ezali. Kasi na esika oyo bazali, bato oyo basalaka mosala ya kobikisa baoyo balingi kozinda na mai bamonaka makama malamu mpenza. Ndenge moko mpe, lokola baboti na yo bayebi makambo mingi koleka yo, mbala mosusu bazali komona makama mosusu oyo ozali komona te. Lokola bato oyo basalaka mosala ya kobikisa baoyo balingi kozinda na mai, mokano ya baboti na yo ezali te ya koyiba yo esengo, kasi ya kosalisa yo okima makama oyo ekoki kosilisa yo esengo na bomoi.

 Ntina mosusu yango oyo: Baboti na yo bazali na mposa makasi ya kobatela yo. Bolingo nde etindaka bango bándima soki bamoni ete likama ezali te mpe báboya soki bamoni likama. Ntango osɛngi bango nzela ya kosala likambo moko, bango moko bamitunaka soki bakoki kopesa nzela, mpe soki bakondima makambo oyo ekobima na nsima. Bakopesa yo nzela kaka soki bamindimisi mpenza ete likama moko te ekokómela yo.

Ndenge ya kosala mpo baboti na yo bápesa yo nzela

Oyo okoki kosala

 Koloba solo: Omituna boye: ‘Mpo na nini nalingi mpenza kokende? Ezali libosoliboso mpo nazali kosepela na likambo yango, to mpo nalingi kosepelisa baninga na ngai? Ezali mpo moto moko oyo nasepelaka na ye mingi akozala kuna?’ Na nsima, lobelá baboti na yo solo. Bazalaki mpe bilenge liboso mpe bayebi yo malamu. Yango wana, bakoyeba kaka nini mpenza ezali kotinda yo okende kuna. Bakosepela na yo soki olobi na bango solo, mpe okozwela bwanya na bango matomba. (Masese 7:1, 2) Kasi, soki ozali moto ya lokuta, bakobanda kondimela yo lisusu te mpe bakopesa yo lisusu nzela ya kobima te.

 Kopona ntango: Kosɛngaka baboti na yo makambo te ntango kaka bauti mosala to ntango bazali kosala makambo mosusu. Sololá na bango ntango bazali motema ya kokita. Kasi kozela mpe te tii ntango ngonga ekotikala moke mpo obanda kotya bango mpanzi likoló mpo báyanola yo. Baboti bakosepela te kozwa ekateli ya mbangumbangu. Sɛngá bango nzela liboso mpo opesa bango ntango ya kokanisa.

 Makambo oyo bokosala: Kobomba makambo mosusu te. Limbolá mpenza likambo oyo olingi kosala. Baboti bakomiyoka malamu te soki ntango batuni yo: “Banani bakozala kuna?” “Mokóló moko akozala?” to “Likambo yango ekosila ntango nini?” yo ozongisi kaka: “Nayebi te.”

 Makanisi na yo: Komona baboti na yo te lokola banguna na yo. Moná bango nde lokola baninga na yo, mpo soki totali malamu, bazali mpenza baninga. Soki ozali komona baboti na yo lokola baninga na yo, okoluka koswanisa bango te mpe bango bakozala matata te.

 Monisá baboti na yo ete okoli mpe okoki kondima ekateli na bango mpe komemya yango. Soki osali bongo, bakosepela na yo. Mpe na nsima, bakondima kopesa yo nzela soki osɛngi bango.