Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Bongo kolapa ndai ya koboya koyeba mibali to basi liboso ya kobala?

Bongo kolapa ndai ya koboya koyeba mibali to basi liboso ya kobala?

 Ndai yango elimboli nini?

 Kolapa ndai ya koboya koyeba mibali to basi liboso ya kobala ezali elako oyo moto alobi to akomi ete akosangisa nzoto te tii akobala.

 Bato bakómaki kolapa ndai yango mingi na bambula ya 1990 ntango Lingomba ya Baptiste ya Sud na États-Unis ebongisaki programɛ oyo babengaki yango “bolingo ya solosolo ezelaka,” oyo esangisaki mateya ya Biblia mpe kolendisa bilenge báboya kosangisa nzoto liboso ya kobala.

 Programɛ ya ndenge wana esalemaki lisusu na nsima, mpe bapesaki baoyo balapaki ndai yango lopɛtɛ ya palata lokola elembo oyo ekomonisa (mpe bákanisa lisusu) ete balapaki ndai ya koboya kosangisa nzoto liboso ya kobala.

 Ndai yango esalisaka?

 Eyano etali moto oyo otuni motuna wana.

  •   Christine Kim mpe Robert Rector, bato moko ya mayele balobaki ete “baankɛtɛ mingi emonisi ete ndai ya koboya kosangisa nzoto liboso ya kobala oyo bilenge basalaki nde esalaki ete bilenge básangisa nzoto noki te to motángo ya baoyo basangisaka nzoto noki ekita.”

  •   Ankɛtɛ oyo Institut Guttmacher esalaki emonisi ete “bilenge oyo ‘balapaka ndai ya koboya kosangisa nzoto liboso ya kobala’ basangisaka nzoto lokola bilenge mosusu nyonso.”

 Mpo na nini bongo?

  •   Baankɛtɛ mosusu ekokanisi bilenge oyo balapaka ndai ná baoyo balapaka ndai te, oyo bazali na makanisi ekeseni na likambo etali kosangisa nzoto.

  •   Baankɛtɛ mosusu ekokanisi baoyo balapaka ndai ná baoyo balapaka ndai te, oyo bazali na makanisi ndenge moko na likambo etali kosangisa nzoto.

 Ankɛtɛ oyo ya mibale emonisi nini? Doktɛrɛ Janet Rosenbaum, oyo alandelaka sante ya bilenge alobi ete nsima ya mbula mitano, “bilenge oyo balapaki ndai ná baoyo balapaki ndai te bakeseni ata moke te na likambo etali kosangisa nzoto.”

 Ndenge malamu ya kosala

 Programɛ wana ya kolapisa bilenge ndai ya koboya kosangisa nzoto liboso ya kobala ezalaki na mokano ya malamu. Likambo ezali ete esalisaki te bilenge bákóma na bizaleli oyo esengeli mpo bátosa ndai na bango. Doktɛrɛ Rosenbaum alobi ete mingi ya baoyo balakaka ete bakoyeba mibali to basi te liboso ya kobala “batosaka mpenza ndai yango te. Esengeli moto ye moko azwa ekateli ya koboya kosangisa nzoto liboso ya kobala na esika ya kolanda programɛ moko boye.”

 Biblia elendisaka ekateli ya ndenge wana, esɛngaka te ete moto aloba to akoma ndai oyo alapi, kasi esalisaka moto ‘asalela makoki na [ye] ya kososola oyo emesaná kokesenisa ná mabe ná malamu.’ (Baebre 5:14) Kutu, koboya kosangisa nzoto liboso ya kobala ezali kaka te mpo na kokima bamaladi mpe bazemi; ezali ndenge ya komonisa ete tomemyaka Mozalisi ya libala.​—Matai 5:19; 19:4-6.

 Mibeko oyo ezali na Biblia ezali mpo na litomba na biso. (Yisaya 48:17) Moto nyonso, ata soki azali na mbula nini, akoki kozwa ekateli ya kotosa mobeko ya Nzambe oyo elobi: “Bókima pite” (1 Bakorinti 6:18) Soki babali, bakosepela mpenza na kosangisa nzoto kozanga komitungisa mpe koyoka mawa oyo mbala mingi eyaka na nsima ya kosangisa nzoto liboso ya kobala.