Ndenge ekomamá na Matai 5:1-48

  • LISOLO LIKOLÓ YA NGOMBA (1-48)

    • Yesu abandi koteya likoló ya ngomba (1, 2)

    • Bisengo libwa (3-12)

    • Mungwa mpe pole (13-16)

    • Yesu ayaki mpo na kokokisa Mobeko (17-20)

    • Toli na oyo etali nkanda (21-26), ekobo (27-30), koboma libala (31, 32), ndai (33-37), kozongisa mabe (38-42), kolinga banguna na biso (43-48)

5  Ntango amonaki ebele ya bato, amataki na ngomba mpe afandaki; mpe bayekoli na ye bapusanaki epai na ye.  Bongo afungolaki monɔkɔ na ye mpe abandaki koteya bango na maloba oyo:  “Esengo na baoyo bayebi mposa na bango ya elimo,*+ mpo Bokonzi ya likoló ezali ya bango.  “Esengo na baoyo bazali na mawa, mpo bakobɔndisama.+  “Esengo na baoyo bazali na ezaleli ya boboto,*+ mpo bakozwa* mabele.+  “Esengo na baoyo bazali na nzala mpe na mposa+ ya bosembo,* mpo bakotonda.+  “Esengo na bato ya motema mawa,+ mpo bakomonisela bango mpe motema mawa.  “Esengo na baoyo bazali na motema pɛto,+ mpo bakomona Nzambe.  “Esengo na baoyo batyaka kimya,+ mpo bakobengama bana ya Nzambe. 10  “Esengo na baoyo bazali konyokwama mpo na bosembo,+ mpo Bokonzi ya likoló ezali ya bango. 11  “Esengo na bino ntango bato bazali kofinga bino,+ konyokola bino,+ mpe kolobela bino makambo ya mabe ya ndenge nyonso mpo na ngai.+ 12  Bósepela mpe bótonda na esengo,+ mpo mbano*+ na bino ezali monene na likoló, mpo ndenge wana nde banyokolaki basakoli oyo bazalaki liboso na bino.+ 13  “Bozali mungwa+ ya mabele. Kasi soki mungwa esili elɛngi, ndenge nini elɛngi na yango ekozonga? Ezali lisusu na ntina moko te; etikali kaka bábwaka yango libándá+ mpo bato bányata yango. 14  “Bozali pole ya mokili.+ Engumba oyo ezali likoló ya ngomba ekoki kobombama te. 15  Soki bapelisi mwinda, batyaka yango na nse ya kitunga* te, kasi likoló ya etɛlɛmiselo ya miinda, mpe epesaka pole na baoyo nyonso bazali na kati ya ndako.+ 16  Ndenge moko mpe, tiká ete pole na bino engɛnga liboso ya bato,+ mpo bámona misala na bino ya malamu+ mpe bápesa Tata na bino oyo azali na likoló nkembo.+ 17  “Bókanisa te ete nayaki mpo na kobebisa Mobeko to Basakoli. Nayaki mpo na kobebisa yango te, kasi mpo na kokokisa yango.+ 18  Mpo ya solo mpenza, nalobi na bino ete likoló ná mabele ekoki koleka, kasi ata mwa lɛtrɛ ya moke to ndambo ya lɛtrɛ ya moke ya Mobeko ekoleka te, soki makambo nyonso esalemi te.+ 19  Yango wana, moto nyonso oyo abuki moko ya mitindo oyo eleki moke mpe ateyi bato básala bongo, akobengama ‘moto oyo aleki moke’ na oyo etali Bokonzi ya likoló. Moto nyonso oyo atosi yango mpe ateyi yango, moto yango akobengama ‘moto monene’ na oyo etali Bokonzi ya likoló. 20  Mpo nalobi na bino ete soki bosembo* na bino eleki te oyo ya bakomeli mpe Bafarisai,+ bokokɔta na Bokonzi ya likoló te.+ 21  “Boyokaki ete balobaki na bankɔkɔ na bino: ‘Osengeli koboma moto te;+ kasi moto nyonso oyo abomi moto akozongisa monɔkɔ na tribinale.’+ 22  Kasi, ngai nalobi na bino ete moto nyonso oyo akangeli ndeko na ye nkanda+ akozongisa monɔkɔ na tribinale; moto nyonso oyo alobi na ndeko na ye liloba ya kotyola oyo ekoki kutu kolobelama te akozongisa monɔkɔ na Tribinale Monene; nzokande moto nyonso oyo alobi ete: ‘Yo nsuka na bolole!’ abongi na mɔtɔ ya Gehena.*+ 23  “Bongo soki ozali komema likabo na yo na etumbelo+ mpe kuna okanisi ete ndeko na yo azali na likambo ná yo, 24  tiká likabo na yo kuna liboso ya etumbelo, mpe kende. Liboso salá kimya* yo ná ndeko na yo, mpe na nsima, ntango okozonga, pesá likabo na yo.+ 25  “Soki ozali na likambo ya kosamba ná moto mpe bozali kokende na tribinale, salá noki obongisa makambo elongo na moto yango ntango bozali naino na nzela, noki te moto yango apesa yo na mabɔkɔ ya mosambisi, mpe mosambisi apesa yo na mokɛngɛli, mpe bábwaka yo na bolɔkɔ.+ 26  Ya solo nalobi na yo, okobima kuna te soki osilisi te kofuta nyongo na yo tii na mbongo ya ebende ya moke ya nsuka.* 27  “Boyokaki ete balobá: ‘Osengeli kosala ekobo te.’+ 28  Kasi ngai nalobi na bino ete moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi+ tii ayoki ye mposa asili kosala na ye ekobo na motema.+ 29  Boye, soki liso na yo ya mobali ezali kobɛtisa yo libaku, pikolá yango mpe bwaká yango mosika na yo.+ Mpo eleki malamu obungisa eteni moko ya nzoto na yo na esika ete nzoto na yo mobimba ebwakama na Gehena.*+ 30  Lisusu, soki lobɔkɔ na yo ya mobali ezali kobɛtisa yo libaku, katá yango mpe bwaká yango mosika na yo.+ Mpo eleki malamu obungisa eteni moko ya nzoto na yo na esika ete nzoto na yo mobimba ekende na Gehena.*+ 31  “Balobá lisusu ete: ‘Moto nyonso oyo abomi libala na mwasi na ye, apesa ye mokanda ya koboma libala.’+ 32  Kasi, ngai nalobi na bino ete moto nyonso oyo abomi libala na mwasi na ye, soki ezali te mpo na pite,* atye ye na likama ya kosala ekobo, mpe moto nyonso oyo abali mwasi oyo abomá libala asali ekobo.+ 33  “Lisusu boyokaki ete balobaki na bankɔkɔ na bino: ‘Osengeli te kolapa ndai bongo okokisa yango te,+ kasi osengeli kokokisa bilako oyo osaleli Yehova.’*+ 34  Kasi, ngai nalobi na bino: Bólapa ndai te,+ ezala na nkombo ya likoló, mpo ezali kiti ya bokonzi ya Nzambe; 35  na nkombo ya mabele mpe te, mpo ezali ebonga ya makolo na ye;+ na nkombo ya Yerusaleme mpe te, mpo ezali engumba ya Mokonzi monene.+ 36  Kolapa ndai na motó na yo te, mpo okoki kokómisa nsuki ata moko mpɛmbɛ to moindo te. 37  Tiká ete liloba na bino ‘Ɛɛ’ ezala ɛɛ, ‘Te’ na bino, te;+ mpo maloba oyo ebakisami likoló na oyo wana euti na moto mabe.*+ 38  “Boyokaki ete balobá: ‘Liso mpo na liso mpe lino mpo na lino.’+ 39  Kasi, ngai nalobi na bino: Bótɛmɛla te moto oyo azali mabe; kasi soki moto abɛti yo mbata na litama na yo ya mobali, pesá ye mpe oyo mosusu.+ 40  Soki moto alingi kokende na yo na tribinale mpe kozwa elamba na yo ya kati, tikelá ye mpe elamba na yo ya likoló.+ 41  Soki moto moko oyo azali na bokonzi azwi yo na makasi mpo osalela ye mosala kilomɛtrɛ moko, kende na ye kilomɛtrɛ mibale. 42  Soki moto asɛngi yo eloko, pesá ye, mpe soki moto alingi kodefa* eloko epai na yo, koboya te.+ 43  “Boyokaki ete balobá: ‘Osengeli kolinga mozalani na yo+ mpe koyina monguna na yo.’ 44  Kasi ngai nalobi na bino: Bókoba kolinga banguna na bino+ mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino,+ 45  mpo bómonisa ete bozali bana ya Tata na bino oyo azali na likoló,+ mpo abimisaka moi na ye mpo na bato mabe ná bato malamu mpe anɔkisaka mbula mpo na bato ya bosembo ná bato oyo bazangi bosembo.+ 46  Mpo soki bozali kolinga baoyo balingaka bino, mbano nini bokozwa?+ Bakɔngɔli-mpako basalaka mpe bongo te? 47  Mpe soki bozali kopesa mbote kaka na bandeko na bino, likambo nini ya monene bosali? Bato ya bikólo basalaka mpe bongo te? 48  Yango wana, bosengeli kozala bato ya kokoka,* ndenge Tata na bino ya likoló azali moto ya kokoka.+

Maloba na nse

To, “basɛngi na elimo; baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.”
To, “bato ya komikitisa.”
Lil., “bakozwa libula ya.”
To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “lifuti.”
To, “kitunga ya komekela.”
To, “boyengebene.”
Esika oyo bazalaki kotumba bosɔtɔ libándá ya Yerusaleme. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “yokaná.”
Lil., “Kadra ya nsuka.” Talá Ap. B14.
Na Grɛki pornéïa; talá Ndimbola ya maloba.
Talá Ap. A5.
To, “Zabolo.”
Elingi koloba, kodefa kozanga kozongisa na benefisi.
To, “mobimba.”