Lakisá makambo oyo ezali na kati

Nasala nini soki baboti na ngai babomi libala?

Nasala nini soki baboti na ngai babomi libala?

Oyo okoki kosala

 Yebisá basusu mitungisi na yo. Yebisá baboti na yo ndenge likambo yango ezali kopesa yo mawa mpe kotungisa yo. Mbala mosusu, bakoyebisa yo makambo oyo esali ete bákabwana mpe yango ekoki kosala ete omitungisa mingi te.

 Soki baboti na yo balingi te to bakoki te kosalisa yo, okoki kosolola ná moninga moko ya mokóló.​—Masese 17:17.

 Longola nyonso wana, Tata na yo ya likoló akoki koyoka yo ntango nyonso, mpo Ye azali “Moyoki ya libondeli.” (Nzembo 65:2) Fungolelá ye motema mpo “atyelaka yo likebi.”​—1 Petro 5:7.

Oyo osengeli kosala te

Lokola esɛngaka ntango mpo lobɔkɔ oyo ebukanaki ezonga malamu, ekosɛnga mpe ntango mpo mpasi oyo oyokaki ntango baboti na yo bakabwanaki esila

 Kobomba nkanda na motema te. Daniel, oyo baboti na ye babomaki libala ntango azalaki naino na mbula 7 alobi boye: “Baboti na ngai bazalaki kaka kokipe bamposa na bango moko, bazalaki kokanisa biso mpenza te mpe bazalaki koyeba te ndenge likambo oyo basalaki ekokaki kopesa biso mpasi.”

 Likama nini ekoki kokómela Daniel soki atiki te ezaleli ya kobomba nkanda na motema?​—Tángá Masese 29:22.

 Mpo na nini ekozala malamu mpo na Daniel ameka kolimbisa baboti na ye na ndenge bazokisi ye mpe bayokisi ye mpasi na motema?​—Tángá Baefese 4:31, 32.

 Kosalaka te makambo oyo ekoyokisa yo mpasi. Denny alobi boye: “Nazalaki na esengo te mpe natungisamaki ntango baboti na ngai babomaki libala. Nabandaki kokutana na mikakatano na kelasi mpe nazwaki te na kelasi mbula moko. Na nsima . . . nakómaki kosɛkisa bana kelasi mpe nakómaki kobunda mingi.”

 Okanisi ete Denny azalaki koluka nini ndenge azalaki kosɛkisa bana kelasi?

 Ndenge nini toli oyo ezali na Bagalatia 6:7 ekoki kosalisa bato lokola Denny bámisala mabe te?

 Esɛngaka ntango mpo na kosilisa mpasi na motema. Nzokande, ntango bomoi na yo ekobanda kozonga ndenge ezalaki liboso, okozongela lisusu kimya na motema.