Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Ndenge nini nakoki kopekisa nkanda na ngai?

Ndenge nini nakoki kopekisa nkanda na ngai?

 Mituna

  •  Oyokaka nkanda mpambampamba?

    •  mpenza te

    •  na bantango mosusu

    •  mikolo nyonso

  •  Nkanda na yo ezalaka ndenge nini?

    •  makasi te

    •  makasi

    •  makasi mpenza

  •  Mbala mingi osilikelaka nani?

    •  papa to mama

    •  yaya to leki

    •  moninga moko

 Soki omoni ete osengeli koyekola kopekisa nkanda na yo, lisolo oyo ekosalisa yo! Liboso, tólobela naino ntina oyo osengeli kobatela kimya soki batumoli yo.

 Mpo na nini ezali na ntina?

 Mpo na nzoto na yo. Masese 14:30 elobi: “Motema ya kimya ezali bomoi ya nzoto.” Nzokande zulunalo moko (Medicine and Life ) elobi ete: “ Nkanda ekoki kopesa moto bamaladi ya motema.”

 Baninga na yo. Biblia elobi: “Kosala boninga na moto moko te oyo alingá kosilika; mpe osengeli te kotambola esika moko na moto oyo atombokaka mpambampamba.” (Masese 22:24) Na yango, soki okokaka kopekisa nkanda na yo te, kokamwa te soki bato bazali kokima yo. Elenge mwasi moko na nkombo Jasmine alobi boye: “Soki oyekoli kopekisa nkanda na yo te, okozala na baninga ya solosolo te.”

 Lokumu na yo. Ethan, oyo azali na mbula 17, alobi boye: “Soki osiliki makasi, bato bakoyeba yango mpe bakoyeba yo lokola moto oyo asilikaka mpambampamba.” Omituna boye: ‘Nalingi bato báyeba ngai lokola moto oyo alukaka kimya to lokola moto oyo angalaka?’ Biblia elobi: “Ye oyo ayokaka nkanda noki te azalaka na bososoli mingi, kasi ye oyo azali motema mokuse atombolaka bozoba.” (Masese 14:29)

Moto te alingaka kozala penepene na moto oyo angalaka na nkanda

 Oyo okoki kosala

 Tángá bavɛrsɛ oyo elandi mpe maloba ya bilenge, mpe omituna mituna oyo ezali wana.

  •   Masese 29:22: “Moto oyo alingá kosilika abimisaka kowelana, mpe moto nyonso oyo alingá nkɛlɛ abukaka mibeko mingi.”

     Ntango nakómaki na mbula soki 13, nazalaki kokoka kopekisa nkanda na ngai te. Bandeko ya papa na ngai mpe bazalaka na mokakatano yango: tozali makila mɔtɔmɔtɔ. Tokokaka komipekisa te.”​—Kerri.

     Nasilikaka mpambampamba? Soki nandimaka ete nazali na bizaleli ya malamu mpo nasalaka milende, ebongi nde nalobaka ete nazali na bizaleli ya mabe mpo na makila ya baboti na ngai?

  •   Masese 15:1: “Eyano, ntango ezali ya boboto, elongolaka nkɛlɛ, kasi liloba oyo epesaka mpasi ematisaka nkanda.”

     “Mpo olonga, osengeli koyekola komipekisa. Soki oyekoli kozala na boboto mpe kobatela makanisi ya malamu, okobanda kosilika mpambampamba te.”​—Daryl.

     Ntango batumoli ngai, mpo na nini likambo ya liboso oyo nakoloba, to oyo nakosala ezali na ntina mingi?

  •   Masese 26:20: “Esika nkoni ezali te mɔtɔ ekufaka.”

     “Soki napesi moto eyano na boboto, mbala mingi ekitisaka ye motema mpe okomona tokosolola na kimya kozanga kowelana.”​—Jasmine.

     Ndenge nini maloba mpe misala na ngai ekoki kobakisa mafuta na mɔtɔ?

  •   Masese 22:3: “Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi, kasi bato oyo bazangi boyebi baleki kaka mpe basengeli kozwa mpasi.”

     “Ntango mosusu esɛngaka nalongwa wana mpe nakanisa mwa moke likambo oyo esalemaki; na nsima soki motema ekiti, nalobaka na kimya.”​—Gary.

     Ntango nini ekoki kozala malamu nalongwa na esika matata ebimi na moto moko kozanga amona ete nakimi ye?

  •   Yakobo 3:2: “Biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi.”

     “Tosengeli koyoka mawa mpo na mabunga na biso; kasi tosengeli mpe kotika yango eteya biso. Soki tokwei, tosengeli kotɛlɛma mbala moko, mpe kosala makasi tósala malamu mbala ya nsima.”​—Kerri.

 Likanisi: Omityela mokano moko. Zwá ekateli ya kofanda kimya ntango batumoli yo, salá bongo mpo na mwa ntango, ata sanza moko. Komáká makambo oyo eleki na mokolo mpo otala milende oyo ozali kosala.