Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasala nini mpo nasilisaka badevuare na ngai?

Nasala nini mpo nasilisaka badevuare na ngai?

 “Elɛmbisaka makasi kosala badevuare tii na ngonga ya 1:00. Mposa na yo ezali kaka okende kolala.”​—David.

 “Na bantango mosusu nazalaki kosala badevuare tii na ngonga ya 4:30, mpe na nsima nasengelaki kolamuka na ngonga ya 6:00 mpo na kokende kelasi. Buzoba mpenza!”​—Theresa.

 Ozalaka na badevuare mingi ya kosala? Soki ezali bongo, lisolo oyo ekoki kosalisa yo olonga yango.

 Mpo na nini balakisi bapesaka badevuare?

 Badevuare ezali na ntina mingi, na ndakisa . . .

  •   ekosalisa yo obakisa boyebi na yo

  •   ekosala ete bátyela yo lisusu motema

  •   ekosalisa yo ozala na likoki ya kobongisa ntango na yo mpe kosalela yango na bwanya

  •   ekosalisa yo okanga ntina mpe osalela mateya oyo ozwaki na kelasi a

 “Kopesa badevuare esalisaka balakisi báyeba soki bana-kelasi bakosalela makambo oyo bayokeli, na esika báyoka bongo bábosana yango na nsima.”​—Marie.

 Mingimingi, matematiki mpe siansi ekopesa yo makoki ya koyeba kozwa solisyo na makambo mingi. Lisusu, bato ya mayele balobi ete ekoki kofungola lisusu bɔɔngɔ na yo. Na yango, ntango ozali kosala badevuare ezali lokola ozali kosalisa bɔɔngɔ na yo ngalasisi!

 Ezala ozali kozwa litomba to te, kosala badevuare ezali na kati ya makambo ya bomoi oyo osengeli kosala. Likambo ya esengo ezali ete: Ata soki okokoka te kosilisa badevuare nyonso oyo bapesaki yo, kasi okoki kokitisa ata mwa ntango na ntango oyo osengelaki kolekisa mpo na kosala yango. Tótala ndenge okoki kosala yango.

 Mayele ya koyekola

 Soki ozali na mikakatano mpo na kosilisa badevuare oyo bapesaka yo, solisyo ekoki kozala​— koboma nzoto te mpo na kosala badevuare, kasi salá yango nde na mayele. Meká mayele oyo elandi.

  •   Mayele ya 1: Omibongisa liboso. Biblia elobi: “Myango ya moto ya etingya ememaka mpenza na litomba.” (Masese 21:5) Omindimisa ete ozali na nyonso oyo esengeli mpo na kosala devuare na yo mpo okata te kosala devuare mpo na koluka eloko oyo ezangi.

     Lisusu, poná esika oyo ekosala ete makanisi na yo eyengayenga te. Basusu bamonaka malamu básala badevuare na esika ya kimya, na shambrɛ oyo miinda ezali kopela malamu. Basusu bayekolaka malamu soki bazali na ndako na bango te, mbala mosusu na bibliotɛkɛ.

     “Kozala na bisaleli oyo ebongisami malamu na ndakisa buku to manaka ekoki kosalisa yo osalela ntango na yo na bwanya mpenza. Ntango ozali kokoma devuare oyo ozali na yango mpe osali yango na ntango ebongi, okozala na mitungisi mingi te na bomoi na yo.”​—Richard.

  •   Mayele ya 2: Bongisá mosala na yo. Biblia elobi: “Makambo nyonso esalema . . . na molɔngɔ.” (1 Bakorinti 14:40) Lokola ezali bongo, luká koyeba devuare nini okosala liboso mpe devuare nini okosala na nsima.

     Bato mosusu basepelaka kobanda na oyo ezali mpasi. Bamosusu basepelaka kobanda na oyo ezali pɛtɛɛ mpo elendisaka moto akoba kosala oyo ezali mpasi. Poná mayele oyo omoni ete ekosimba mpo na yo.

     “Esalisaka mpenza soki osala liste moko mpo na koyeba makambo oyo osengeli na yango mpe oyo okobanda na yango. Na ndenge wana nde okolonga kosala badevuare na yo mpe yango elɛmbisaka te.”​—Heidi.

  •   Mayele ya 3: Salá makasi. Biblia elobi: “Bózala na gɔigɔi te na misala na bino.” (Baroma 12:11) Kotika te misala mosusu ezwa yo ntango oyo osengeli na yango mpo na kosala badevuare na yo.

     Mbala mingi bana-kelasi oyo balalisaka makambo basilisaka badevuare na bango na retare to basalaka yango mbangumbangu, yango wana, bayekolaka malamu te mpe badevuare na bango ezalaka malonga te. Okoki kotika komitungisa mpambampamba mpe kozala na mawa soki kaka obandi kosala devuare na yo na ntango oyo ebongi.

     “Ntango nazalaki kosala badevuare na ngai kaka na nsima ya kelasi to kobanda yango ntango kaka nazwi yango, nazalaki komitungisa te mpo na yango na nsima​—mpe yango ezalaki kotikela ngai nzela ya kosala makambo mosusu.”​—Serina.

     LIKANISI: Saláká badevuare na yo kaka na ngonga oyo oponá mokolo na mokolo. Yango ekosalisa yo omipesa disiplini mpe omesana kosala kaka bongo mbala na mbala.

  •   Mayele ya 4: Makanisi na yo eyengayenga te. Biblia elobi: “Miso na yo esengeli kotala alima liboso na yo, ɛɛ, miso na yo oyo ezali kongɛnga esengeli kotala alima liboso na yo.” (Masese 4:25) Mpo olanda toli oyo ntango ozali koyekola, osengeli koboya ete makanisi na yo eyengayenga; mingimingi na kosalela baaparɛyi.

     Kokɔta na Internet mpe kotindela basusu bamesaje ekoki kozwa yo ntango mbala mibale na ntango oyo osengelaki kolekisa mpo na kosilisa badevuare na yo. Kasi soki makanisi na yo ezali koyengayenga te, mbala mosusu okomitungisa mingi te mpe ekotikela yo ntango.

     “Kosalela telefone, ordinatɛrɛ, masano ya video, mpe TV ekoki kolongola likebi na yo na pɛtɛɛ nyonso. Likambo oyo esalisaka ngai ezali kokanga telefone na ngai mpe kolongola biloko nyonso oyo ezali pene mpo elongola likebi na ngai te.”​—Joel.

  •   Mayele ya 5: Kolekisa ndelo te. Biblia elobi: “Bato nyonso báyeba ezaleli na bino ya makambo makasimakasi te.” (Bafilipi 4:5) Soki ozwi ntango malamu ya kopema, okomitungisa mingi mpenza te ntango ozali kosala devuare na yo. Saláká mwa ngalasisi ya kotambola, ya kotambwisa velo, to ya kokima mbangu.

     Soki omoni ete badevuare ya kosala ezali kaka mingi, sololá na balakisi na yo. Soki bamoni ete ozali mpenza kosala nyonso oyo esengeli, bakoki komona ete bábongola mwa makambo.

     “Kotika te ete badevuare esilisa yo esengo mpe omitungisa mingi. Salá milende mpenza. Kati na makambo oyo esalaka ete moto amitungisa mingi mpe azanga esengo, badevuare mpe ezali na kati.”​—Julia.

 Mituna ya komituna:

  •   Bisaleli nini nakozala na mposa na yango mpo na badevuare na ngai?

  •   Ntango nini ebongi mpenza mpo na ngai mpo nasala badevuare na ngai?

  •   Esika nini ebongi mpenza mpo natya makanisi na ngai nyonso na badevuare na ngai?

  •   Nasengeli kosala nini mpo nalalisaka makambo te?

  •   Makambo nini ekoki kopɛngola makanisi na ngai?

  •   Nakoki kosala nini mpo baaparɛyi to makambo mosusu epɛngola makanisi na ngai te?

  •   Ndenge nini nakoki kozala na bokatikati ntango nazali kosala badevuare na ngai?

 LIKAMBO YA KOBOSANA TE: Omindimisa ete okangi ntina ya makambo oyo badevuare na yo esɛngi. Soki ozali na mituna, tuná balakisi liboso ozonga na ndako.

a Makanisi yango euti na buku School Power, ya Jeanne Schumm.