Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokili oyo ekokufa?

Mokili oyo ekokufa?

Mbala mosusu, oyebi ete Biblia elobeli nsuka ya mokili. (1 Yoane 2:17) Yango elingi koloba ete bato bakozala lisusu na mokili te? Mabele ekozala lisusu na ekelamu ya bomoi te to ekobomama mpenza?

EYANO BIBLIA EPESI NA MITUNA MIBALE OYO EZALI: TE!

Nini ekokufa te?

BATO NYONSO

Oyo Biblia elobi: Nzambe “azalisaki [mabele] mpamba te, asalaki yango mpo bato báfanda wana.”​—YISAYA 45:18.

MABELE

Oyo Biblia elobi: “Libota oyo eleki, mpe libota mosusu eyei; kasi mabele ezali koumela seko.”​—MOSAKOLI 1:4.

YANGO ELIMBOLI NINI? Ndenge Biblia emonisi yango, mabele ekobomama te mpe bato bakofanda na mabele ntango nyonso. Bongo nsuka ya mokili elimboli nini?

TÓTALELA LIKAMBO OYO: Biblia elobi ete nsuka ya mokili oyo ekozala lokola makambo oyo esalemaki na mikolo ya Noa. Na ntango wana, mabele ‘etondaki na mobulu.’ (Ebandeli 6:13) Kasi, Noa azalaki moto ya sembo. Yango wana, Nzambe abatelaki Noa ná libota na ye, kasi abomaki bato mabe na mpela. Na kotalela makambo oyo esalemaki na ntango wana, Biblia elobi ete: “Mokili ya ntango wana ebebisamaki ntango ezindaki na mai.” (2 Petro 3:6) Yango nde ezalaki nsuka ya mokili na ntango wana. Kasi, nini ebomamaki? Bato mabe oyo bazalaki na mabele, kasi mabele te. Yango wana, ntango Biblia elobelaka nsuka ya mokili, yango elingi koloba te ete mabele ekokufa. Kutu, elobelaka nde nsuka ya bato mabe na mabele, mpe nsuka ya lolenge ya kosala makambo oyo bato yango batyá awa na mabele.

Nini ekosuka?

MIKAKATANO MPE MABE

Oyo Biblia elobi: “Etikali kaka mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te; mpe okotya mpenza likebi na esika na ye, akozala te. Kasi bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.”​—NZEMBO 37:10, 11.

YANGO ELIMBOLI NINI? Mpela ya mikolo ya Noa esilisaki mabe libela te. Nsima ya Mpela, bato mabe bakómaki lisusu konyokola bato. Yango wana, etikali moke Nzambe asilisa mabe. Ndenge mokomi ya Nzembo alobaki yango: “Moto mabe akozala lisusu te.” Nzambe akosukisa mabe na nzela ya Bokonzi na ye. Bokonzi yango ezali guvɛrnema ya mokili mobimba oyo ezali na likoló mpe ekoyangela bato oyo batosaka Nzambe.

TÓTALELA LIKAMBO OYO: Bakonzi oyo bazali koyangela lelo awa na mabele bakolinga mpenza kotosa Bokonzi ya Nzambe? Biblia emonisi ete bakolinga kotosa te. Na bozoba mpenza, bakotɛmɛla Bokonzi ya Nzambe. (Nzembo 2:2) Ekosuka ndenge nini? Bokonzi ya Nzambe ekozwa esika ya baguvɛrnema nyonso ya bato, mpe “ekotikala seko.” (Danyele 2:44) Kasi, mpo na nini boyangeli ya bato esengeli kosuka?

MPOSA NA BISO​—Boyangeli ya bato esuka

Oyo Biblia elobi: “Ezali te likambo ya moto oyo azali kotambola ete atambwisa lokolo na ye.”​—YIRIMIA 10:23.

YANGO ELIMBOLI NINI? Bato bakelamaki te mpo bámitambwisa bango moko. Yango wana, bazali koyangela malamu te mpe bazali kosilisa mikakatano na bango te.

TÓTALELA LIKAMBO OYO: Buku moko (Britannica Academic) emonisi ete ata guvernɛma moko te ya bato ezali kokoka “kosilisa mikakata, lokola bobola, nzala, maladi, makama oyo ebimaka yango moko, mpe bitumba to mobulu mosusu.” Mpe ebakisi boye: “Bato mosusu . . . bandimi ete kaka guvɛrnema oyo ekoyangela mokili mobimba nde ekoki kobongisa makambo yango.” Nzokande, ata soki baguvɛrnema ya bamboka nyonso esangani, mokili ekokoba kaka koyangelama na bato ya kozanga kokoka, oyo bakokoka te kosilisa mikakatano oyo touti kolobela. Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema kaka moko oyo ezali na nguya ya kosilisa mikakatano wana mpo na libela.

Yango wana, ndenge Biblia elobi, nsuka ya mokili, elingi koloba, ebongiseli mabe ya makambo ya ntango oyo, ezali likambo oyo bato malamu basengeli kobanga te. Ezali nde likambo ya kozela na motema ya likoló, mpo mokili ya sika ya malamu ya Nzambe ekozwa esika ya mokili ya kala mpe ya mabe oyo!

Yango ekosalema ntango nini? Lisolo oyo elandi ekopesa eyano ya Biblia na motuna yango.