Nzembo 37:1-40

  • Baoyo batyelaka Yehova motema bakolonga

    • Kosilika te mpo na bato mabe (1)

    • “Sepelá mingi mpenza na Yehova” (4)

    • “Tiká Yehova atambwisa bomoi na yo” (5)

    • “Bato ya komikitisa bakozwa mabele” (11)

    • Bato ya sembo bakozanga limpa te (25)

    • Bato ya sembo bakofanda na mabele mpo na libela (29)

Ya Davidi. א [Alef] 37  Kosilika te mpo na bato mabeMpe kolula te baoyo basalaka makambo ya mabe.+   Bakokauka nokinoki lokola matiti+Mpe bakokauka lokola matiti ya sika ya mobesu. ב [Bet]   Tyelá Yehova motema mpe salá oyo ezali malamu;+Fandá na mabele,* mpe salá makambo na bosembo.+   Sepelá mingi mpenza* na Yehova,Mpe akokokisa mposa ya motema na yo. ג [Gimel]   Tiká Yehova atambwisa bomoi na yo;*+Tyelá ye motema, mpe ye moko akosalisa yo.+   Akongɛngisa boyengebene na yo lokola kotana ya ntɔngɔ,Mpe bosembo na yo lokola moi na ntango ya midi. ד [Dalet]   Fandá nyɛɛ liboso ya Yehova+Mpe zelá ye na motema moko.* Kosilika te mpo na motoOyo alongaka na mayele mabe na ye.+ ה [He]   Tiká nkanda mpe tiká kotomboka;+Kosilika te mpo yango ekotinda yo osala mabe.*   Mpo bato mabe bakobomama,+Kasi baoyo batyaka elikya epai ya Yehova bakozwa mabele.+ ו [Waw] 10  Etikali kaka mwa ntango moke, bato mabe bakozala lisusu te;+Okotala esika oyo bazalaki,Mpe bakozala lisusuwana te.+ 11  Kasi bato ya komikitisa bakozwa mabele,+Mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.+ ז [Zayin] 12  Moto mabe azali kosalela moto ya sembo likita;+Azali kolyela ye mino. 13  Kasi Yehova akosɛka ye,Mpo Nzambe ayebi mokolo oyo ye akokufa.+ ח [Het] 14  Bato mabe babendi mopanga mpe bagumbi litimbo na bangoMpo na kokweisa moto oyo anyokwami mpe mobola,Mpo na koboma baoyo basalaka oyo ezali sembo.* 15  Mopanga na bango ekokɔta na motema na bango moko;+Matimbo na bango ekobukana. ט [Tet] 16  Biloko moke ya moto ya sembo* ezali malamuKoleka ebele ya biloko ya bato mingi ya mabe.+ 17  Mpo mabɔkɔ ya bato mabe ekobukana,Kasi Yehova akosalisa bato ya sembo. י [Yod] 18  Yehova ayebi makambo oyo bato oyo bazangi mbeba bakutanaka na yango,*Mpe libula na bango ekoumela mpo na libela.+ 19  Bakoyoka nsɔni te na ntango ya mpasi;Na ntango ya nzala bakotonda. כ [Kaf] 20  Kasi bato mabe bakokufa;+Banguna ya Yehova bakosila lokola biloko kitoko na bisika ya koleisa bibwɛlɛ matiti;Bakolimwa lokola milinga. ל [Lamed] 21  Moto mabe adefaka mpe azongisaka te,Kasi moto ya sembo akabaka* mpe amonisaka motema mawa.+ 22  Baoyo Nzambe apamboli bakozwa mabele,Kasi baoyo alakeli mabe bakobomama.+ מ [Mem] 23  Soki Yehova asepeli na nzela ya moto,+Atambwisaka* makolona ye.+ 24  Ata soki akwei, akobwakama na nse te,+Mpo Yehova asimbi ye na lobɔkɔ.+ נ [Nun] 25  Nazalaki elenge mpe sikoyo nakómi mobange,Kasi namoná naino te moto ya sembo asundolami,+To bana na ye bazali koluka limpa.*+ 26  Adefisaka ntango nyonsona boboto,+Mpe bana na ye bakozwa lipamboli. ס [Samek] 27  Tiká mabe mpe salá oyo ezali malamu,+Mpe okofanda mpo na libela. 28  Mpo Yehova alingaka bosembo,Mpe akosundola te bato na ye ya sembo.+ ע [Ayin] Bakobatelama ntango nyonso;+Kasi bana ya bato mabe, bakobomama.+ 29  Bato ya sembo* bakozwa mabele,+Mpe bakofanda wana mpo na libela.+ פ [Pe] 30  Monɔkɔ ya moto ya sembo ebimisaka bwanya,*Mpe lolemo na ye elobaka na bosembo.+ 31  Mobeko ya Nzambe na ye ezali na motema na ye;+Makolo na ye ekolɛnga te.+ צ [Tsade] 32  Moto mabe atalatalaka moto ya sembo,Azali koluka koboma ye. 33  Kasi Yehova akosundola ye te na lobɔkɔ ya moto mabe yango,+Mpe akotánga ye te ete azali na ngambo ntango azali kosambisama.+ ק [Kof] 34  Tyelá Yehova elikya mpe landá nzela na ye,Mpe akotombola yo mpo na kozwa mabele. Ntango bato mabe bakobomama,+ yo okomona yango.+ ר [Resh] 35  Namoni moto mabe, monyokoliAzali kokola malamu lokola nzete oyo etondi na nkasa na mabele na yango mpenza.+ 36  Kasi mbala moko alimwaki, mpe azalaki lisusu te;+Nazalaki kaka koluka ye, kasi amonanaki te.+ ש [Shin] 37  Tyá likebi na yo epai ya moto oyo azangi mbeba,*Mpe kobá kotala moto ya sembo,+Mpo bomoi ya moto yango na mikolo ezali koya ekozala na kimya.+ 38  Kasi bato nyonso oyobabukaka mibeko bakobebisama;Bato mabe bakosuka.+ ת [Taw] 39  Lobiko ya bato ya sembo eutaka epai ya Yehova;+Azali ndako na bango ya makasi na ntango ya mpasi.+ 40  Yehova akosalisa bango mpe akobikisa bango.+ Akobatela bango na mabɔkɔ ya bato mabe mpe akobikisa bango,Mpo bakimi epai na ye.+

Maloba na nse

To, “mokili.”
To, “Zwá esengo mingi mpenza.”
Lil., “Tikelá Yehova nzela na yo.”
To, “na motema molai.”
To mbala mosusu, “Kosilika te mpo yango ekoki komema kaka na mabe.”
To, “baoyo nzela na bango ezali alima.”
To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “mikolo ya bato oyo bazangi mbeba.”
To, “asalisaka.”
To, “Atɛlɛmisaka ngwi.”
To, “bilei.”
To, “bayengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “ebimisaka bwanya na mongongo ya nse.”
To, “moto ya sembo.”