Nzembo 83:1-18

  • Libondeli ya kosɛnga lisalisi liboso ya banguna

    • “Ee Nzambe, kofanda nyɛɛ te” (1)

    • Banguna bazali lokola matiti ya nsende oyo mopɛpɛ ezali kobalusabalusa (13)

    • Nkombo ya Nzambe ezali Yehova (18)

Loyembo. Mondule ya Asafe.+ 83  Ee Nzambe, kofandanyɛɛ te;+Kokanga monɔkɔ te*mpe kofanda kimya te,Ee Nzambe.   Mpo talá! banguna na yo bazali na yikiyiki;+Baoyo bazali koyina yo basali makambo na lofundo mpenza.*   Na mayele mabe, bazali kosalela bato na yo likita na kobombana;Bazali kosala likita mpo na bato oyo ozwaka na motuya.*   Balobi ete: “Bóya, tóboma ekólo ya Yisraele,+Mpo bato bábosana yango mpo na libela.”   Mpo bango nyonso elongo bapesani toli na motema moko;Bayokani mpo nakotɛmɛla yo:+   Bahema ya Edome mpe Bayishimaele, Moabe+ ná Bahagri,+   Gebale, Amone+ ná Amaleke,Filistia+ ná baoyo bafandi na Tire.+   Asiri+ mpe esangani na bango;Bango nyonso bazali kosalisa* bana ya Lota.+ (Sela)   Salá bango ndenge osalaki Midiane,+Ndenge osalaki Sisera mpe Yabine na mokɛli* ya Kishone.+ 10  Basilaki nyɛɛ na Ene-dore;+Bakómaki nyɛi na mabele. 11  Kómisá bato na bango ya lokumu lokola Orebe mpe Zeebe,+Mpe bankumu* na bangolokola Zeba mpe Zalamuna,+ 12  Mpo balobi ete: “Tózwa mokili esika Nzambe afandaka ekóma ya biso.” 13  Ee Nzambe na ngai, kómisá bango lokola matiti ya nsende oyo mopɛpɛ ezali kobalusabalusa,+Lokola matiti ya blé na mopɛpɛ. 14  Lokola mɔtɔ oyo ezali kozikisa zambaLokola lolemo ya mɔtɔ oyo ezali kozikisa bangomba,+ 15  Landá bango na mopɛpɛ makasi na yo+Mpe bangisá bango na mopɛpɛ makasi na yo.+ 16  Zipá* bilongi na bango na nsɔni,Mpo báluka nkombo na yo, Ee Yehova. 17  Báyoka nsɔni mpe bábanga mpo na libela;Básambwa mpe bákufa; 18  Báyeba ete yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova,+Yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.+

Maloba na nse

To, “Kozanga liloba ya koloba te.”
To, “bazali kotombola mitó na bango.”
Lil., “yo obombi.”
Lil., “bakómi lobɔkɔ mpo na.”
To, “wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “bakonzi.”
Lil., “Tondisá.”