Lakisá makambo oyo ezali na kati

Lisolo ya Noa mpe Mpela na mokili mobimba ezali kaka lisapo mpamba?

Lisolo ya Noa mpe Mpela na mokili mobimba ezali kaka lisapo mpamba?

Eyano ya Biblia

 Mpela esalemaki mpenza. Nzambe ayeisaki yango mpo na koboma bato mabe, kasi ayebisaki Noa atonga masuwa mpo na kobikisa bato ya malamu mpe banyama. (Ebandeli 6:11-20) Tokoki kondima mpenza ete Mpela yango esalemaki mpo Biblia, buku oyo “ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe” elobeli likambo yango.​—2 Timote 3:16.

 Lisapo to likambo ya solo mpenza?

 Biblia emonisi ete Noa azalaki mpenza moto ya solo mpe ete Mpela esalemaki mpenza. Ezali lisapo te.

  •   Bato oyo bakomaki Biblia bandimaki ete Noa azalaki mpenza moto ya solo. Na ndakisa, Ezera ná Luka oyo bazalaki bato ya istware oyo bayebaki mpenza mosala yango, batángi Noa na liste ya molɔngɔ ya bankɔkɔ ya ekólo Yisraele. (1 Ntango 1:4; Luka 3:36) Na baevanzile na bango, Matai ná Luka balobeli makambo oyo Yesu alobaki mpo na Noa mpe Mpela.​—Matai 24:37-39; Luka 17:26, 27.

     Longola yango, mosakoli Ezekiele ná ntoma Paulo balobeli Noa lokola ndakisa ya kondima mpe bosembo. (Ezekiele 14:14, 20; Baebre 11:7) Soki Noa azalaki moto ya solo te, bakokaki kolobela ye lokola ndakisa oyo bato basengeli kolanda? Ezali polele ete Noa mpe mibali ná basi mosusu ya sembo bazali ndakisa oyo tosengeli kolanda mpo bazalaki mpenza bato ya solo.​—Baebre 12:1; Yakobo 5:17.

  •   Biblia elobeli na bosikisiki makambo mikemike etali Mpela yango. Na Biblia, lisolo ya Mpela ebandi te na maloba lokola “ezalaki mokolo moko,” lokola nde lisapo moko boye. Kutu, Biblia elobeli mbula, sanza mpe mokolo oyo makambo oyo etali Mpela esalemaki. (Ebandeli 7:11; 8:4, 13, 14) Epesi mpe bamezire ya masuwa oyo Noa atongaki. (Ebandeli 6:15) Makambo mikemike yango emonisi ete Biblia elobelaka Mpela lokola lisapo te kasi nde likambo ya solo mpenza.

 Mpo na nini Nzambe ayeisaki Mpela?

 Biblia elobi ete liboso ya Mpela “mabe ya moto ezalaki mingi.” (Ebandeli 6:5) Ebakisi ete “mabele ebebaki na miso ya Nzambe ya solo” mpo bato mingi bazalaki kosala makambo ya mobulu mpe kosangisa nzoto na ndenge ya mabe mpenza.​—Ebandeli 6:11; Yuda 6, 7.

 Biblia elobi ete soki mabe ekómaki mingi bongo, ezalaki mpe mpo na baanzelu mabe oyo bakitaki awa na mabele mpo na kosangisa nzoto na basi. Baanzelu yango babotaki bana oyo bazalaki kobenga bango Banefilime mpe bana yango bazalaki kosalela bato makambo na nkanza mpenza. (Ebandeli 6:1, 2, 4) Nzambe azwaki ekateli ya koboma bato nyonso ya mabe na mokili mpe kotikela bato ya malamu nzela ya kobanda bomoi ya sika.​—Ebandeli 6:6, 7, 17.

 Bato bayebaki ete Mpela ekoya?

 Ɛɛ. Nzambe ayebisaki Noa makambo oyo ekosalema mpe alobaki na ye atonga masuwa mpo na kobikisa libota na ye mpe banyama. (Ebandeli 6:13, 14; 7:1-4) Noa akebisaki bato mpo na libebi oyo ezalaki koya, kasi bato bakipaki yango te. (2 Petro 2:5) Biblia elobi: “Batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso.”​—Matai 24:37-39.

 Masuwa ya Noa ezalaki ndenge nini?

 Masuwa yango ezalaki sanduku to kɛsi moko ya monene oyo ezalaki na molai ya mɛtrɛ soki 133, monene ya mɛtrɛ 22 mpe bosanda ya mɛtrɛ 13. a Basalelaki nzete ya gofere mpo na kotonga masuwa yango mpe batyaki yango gudrɔ na kati mpe na libándá. Ezalaki na baetajɛ misato mpe bashambrɛ ebele. Porte moko ezalaki kofungwama na mopanzi mpe emonani ete bafɛnɛtrɛ ezalaki zingazinga pene ya nsamba. Na ntembe te, nsamba yango ezalaki mwa nsɔngɛ na katikati mpo na kokitisa mai.​—Ebandeli 6:14-16.

 Ezwaki Noa ntango boni mpo na kotonga masuwa?

 Biblia elobeli te ntango boni ezwaki Noa na kotonga masuwa, kasi emonani ete alekisaki bambula mingi na kotonga yango. Noa azalaki na mbula koleka 500 ntango mwana na ye ya liboso abotamaki mpe azalaki na mbula 600 ntango Mpela eyaki. b​—Ebandeli 5:32; 7:6.

 Ntango Nzambe ayebisaki Noa atonga masuwa, bana na ye misato bakómaki mikóló mpe babalaki, yango elingi koloba ete ezwaki mbula soki 50 to 60. (Ebandeli 6:14, 18) Soki ezali bongo, boye ebongi tóloba ete ezwaki mbula 40 to 50 mpo na kosilisa kotonga masuwa yango.

a Biblia epesi bamezire ya masuwa yango na mapeko. “Lipeko ya Baebre ezalaki mɛtrɛ 44 bakisá santimɛtrɛ 45.”​—The Illustrated Bible Dictionary, ebimeli ya sika, vol. 3, lok 1635.

b Na oyo etali molai ya bomoi ya bato lokola Noa, talá lisolo “Bato ya ntango ya kala bazalaki mpenza na bomoi molai?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/12/2010.