Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tozali na mposa ya mokili ya malamu!

Tozali na mposa ya mokili ya malamu!

António Guterres, secrétaire général ya ONU alobaki boye: “Tozali kofanda na mokili moko oyo etondi na mikakatano mpenza.” Ondimi likambo yango?

Na bansango tozali koyoka kaka makambo ya mabe oyo

  • Bamaladi mabe

  • Makama oyo ebimaka yango moko

  • Bobola mpe nzala

  • Kobeba ya mopɛpɛ mpe molunge makasi

  • Mobulu, kobomana, mpe kanyaka

  • Bitumba

Emonani polele ete tozali na mposa ya mokili ya malamu. Mokili oyo ekozala na

  • Bato ya nzoto kolɔngɔnɔ mpenza

  • Libateli mpe na likambo ya kobanga te

  • Biloko ya kolya ebele

  • Mai mpe mopɛpɛ ya malamu

  • Bosembo mpo na moto nyonso

  • Kimya mpenza

Ntango tolobelaka mokili yango ya malamu, yango elingaka mpenza koloba nini?

Nini ekokómela mokili oyo tozali na yango lelo?

Tokoki kosala nini mpo tófanda na mokili ya malamu?

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ekopesa biyano ya kobɔndisa oyo euti na Biblia na mituna oyo mpe na mituna mosusu.