Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kokufa miso

Kokufa miso

“Matangá ya nkisi oyo batyaki ngai na miso ntango nabotamaki nde ebomaki ngai miso. Na boumeli ya bolenge na ngai nyonso nazalaki komona ata moke te mpe nakómaki kotungisama makasi na makanisi.”​—Paqui, mwasi moko oyo azali na mbula soki 50, oyo mobali na ye mpe akufá miso.

KOKUFA miso to kozanga komona malamu ekoki kouta na makambo ndenge na ndenge; na ndakisa, likama to maladi. Yango ekoki kobebisa miso, misisa ya miso to bɔɔngɔ. Mbala mingi, bato oyo bakufaka mpenza miso to bamonaka malamu te bamiyokaka lokola bazangi moto ya kokipe bango, bayokaka mawa mpe babangaka. Ata bongo, mingi balongaka mokakatano yango mpe bazalaka na bomoi ya esengo.

Miso nde ezali eloko ya liboso oyo esalisaka biso tóyeba makambo oyo ezali zingazinga na biso. Na yango, soki moto akufi miso, koyoka, koyoka nsolo, kosimba mpe komeka elɛngi ya biloko nde esalisaka ye.

Zulunalo moko (Scientific American) elobi ete bolukiluki oyo basalaki na baselile ya bɔɔngɔ emonisi ete bɔɔngɔ ezalaka na likoki ya “kobongwana na kotalela makambo moto akutani na yango.” Ebakisi boye: “Makambo mingi emonisi ete soki enama moko ezali kosala lisusu te, bɔɔngɔ ekoki kosalisa binama mosusu ekóma na makoki mingi lisusu.” Tótalela makambo oyo elandi.

Koyoka: Kobanda na makelele ya mongongo tii na makelele ya makolo ya moto oyo azali kotambola, moto oyo amonaka te akoki komona na makanisi makambo oyo ezali koleka zingazinga. Fernando, mobali moko oyo akufá miso, alobi boye: “Mongongo to ndenge moto azali kotambola esalisaka ngai nayeba moto yango.” Juan, oyo akufá mpe miso, alobi boye: “Moto oyo akufá miso ayebaka moto na mongongo na ye.” Ndenge moko na moto nyonso, moto oyo akufá miso atyaka likebi na volimi ya mongongo mpo na koyeba soki moto yango azali na mawa to esengo.

Lokola matoi ya moto oyo akufá miso ekómaka kosala lisusu malamu koleka, esalisaka ye ayeba makambo oyo ezali koleka zingazinga na ye kaka na makelele, na ndakisa nzela ya mituka, monene ya shambrɛ to esika makama mosusu ezali.

Koyoka nsolo: Koyoka nsolo ekoki mpe kosalisa moto ayeba makambo, kasi kaka te koyoka nsolo ya kitoko. Na ndakisa, ntango moto oyo akufá miso azali kotambola na nzela, koyoka nsolo ekoki kosalisa ye asala karte moko na makanisi oyo ekoki kosalisa ye amona restora, zando mpe makambo mosusu. Toboyi te, makelele oyo amesaná na yango, ata mpe makambo mosusu ya mikemike na nzela ya kosimba ekoki kobakisama na karte yango.

Kosimba: Francisco alobi boye: “Misapi na ngai ekómá miso na ngai.” Mwa nzete mpe esalisaka “Miso” yango emona malamu. Manasés, oyo abotamá miso ekufá mpe ayekolaki kosalela mwa nzete na bomwana, alobaki boye: “Binama mosusu ya nzoto na ngai, makambo oyo nakangá na motó mpe kosalela mwa nzete ntango nazali kotambola esalisaka ngai nayeba mpenza esika nazali.”

Azali kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na ekomeli ya bato bakufá miso

Kosimba mpe esalisaka bato mingi oyo bakufá miso bátánga mikanda oyo ebimá na ekomeli ya bato oyo bakufá miso. Kutu, na mikolo na biso, bato oyo bakufá miso bazali na mwaye ndenge na ndenge oyo ekoki kosalisa bango báyeba makambo mingi, ata mpe makambo ya Nzambe. Longola mikanda ya ekomeli ya bato bakufá miso, ezali mpe na bakasɛti oyo bakoki koyoka mpe kosalela ordinatɛrɛ. Na nzela na yango, bakoki kotánga Biblia mpe mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia. *

Mikanda yango ebɔndisaki mpenza Paqui ná mobali na ye oyo tolobelaki na ebandeli mpe epesaki bango elikya. Bazwaki mpe lisalisi ya ebele ya bandeko ya lisangá na bango. Paqui, alobi boye: “Tozali sikoyo na bomoi ya esengo mpe tokoki kosala makambo mingi biso moko.”

Toboyi te, kokufa miso ezalaka na mikakatano na yango. Kasi ezali mpenza litatoli oyo emonisi ete moto akoki komesana na makambo na pɛtɛɛ nyonso ntango akutani na mikakatano ya ndenge wana mpe kokoba kosepela na bomoi!

^ par. 10 Batatoli ya Yehova babimisaka mikanda oyo elimbolaka Biblia na ekomeli ya bato bakufá miso na minɔkɔ koleka 25.