Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA ELOBI NINI?

Nsuka ya mokili

Nsuka ya mokili

1 Yoane 2:17 elobi boye: “Mokili ezali koleka ndenge moko mpe mposa na yango.” “Mokili” yango ezali nini? Ndenge nini mpe ntango nini ekoleka?

“Mokili” nini ekosuka?

OYO BIBLIA ELOBI

Lokola mokili oyo balobeli ezali na ‘mposa’ oyo Nzambe aboyi emonisi mpenza ete ezali te mabele oyo tofandi. Kutu, ezali nde mokili ya bato oyo batyolaka Nzambe, bamikómisaka banguna na ye. (Yakobo 4:4) Bato oyo basali mokili yango “bakozwa etumbu ya lisambisi ya libebi ya seko.” (2 Batesaloniki 1:7-9) Kasi, baoyo baboyi kozala “bato ya mokili” mpo na kotosa Yesu Kristo, bazali na elikya ya bomoi ya seko.​—Yoane 15:19.

Kutu, 1 Yoane 2:17 esukisi boye: “Moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.” Ya solo, moto ya ndenge wana azali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabele, ndenge Nzembo 37:29 elobi: “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”

“Bólingaka mokili te ná biloko oyo ezali na mokili. Soki moto azali kolinga mokili, bolingo ya Tata ezali na kati na ye te.”​1 Yoane 2:15.

Mokili ekosuka ndenge nini?

OYO BIBLIA ELOBI

Nsuka ekoya na biteni mibale. Ya liboso, Nzambe akobebisa mangomba ya lokuta oyo emonisami lokola mwasi ya ndumba na nkombo “Babilone Monene.” (Emoniseli 17:1-5; 18:8) Atako etutaka ntolo ete ezalaka sembo epai ya Nzambe, kasi esalaka boyokani na bakonzi ya politiki ya mokili oyo. Kaka bakonzi yango nde bakobalukela yango. “Ekoyina mwasi wana ya ndumba mpe ekopanza ye mpe ekotika ye bolumbu, mpe ekolya misuni na ye mpe ekozikisa ye na mɔtɔ nyɛɛ.”​—Emoniseli 17:16.

Na nsima, Nzambe akotya sikoyo likebi na ye epai ya bakonzi ya politiki, elingi koloba “bakonzi ya mabele mobimba esika bato bafandi.” Bakonzi yango bakobomama elongo na bato nyonso ya mabe na “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,” oyo babengaka yango mpe “Armagedone.”​—Emoniseli 16:14, 16.

“Bóluka Yehova, bino nyonso bato ya komikitisa ya mabele . . . Bóluka boyengebene, bóluka komikitisa. Ntango mosusu bokobombama na mokolo ya nkanda ya Yehova.”​Sefania 2:3.

Nsuka ya mokili ekoya ntango nini?

OYO BIBLIA ELOBI

Soki bato bakebisami mpenza na ndenge oyo esengeli na nzela ya mosala ya kosakola ya Bokonzi ya Nzambe, elingi koloba guvɛrnema oyo ekozwa esika ya bokonzi ya bato, nde nsuka ekoya. (Danyele 7:13, 14) Yesu Kristo alobaki boye: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Mosala yango ya kosakola, oyo emonisaka bosembo mpe motema mawa ya Nzambe, ezali mpe na kati ya “elembo” ya mikolo ya nsuka. Elembo yango esangisi mpe makambo lokola bitumba na mokili mobimba, koningana ya mabele, banzala mpe bamaladi.​—Matai 24:3; Luka 21:10, 11.

Lisusu, longola kolobela makambo oyo ezali koleka na mokili, Biblia emonisi mpe ndenge oyo “mikolo ya nsuka” ekozala. Elobi boye: “Ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano. Mpo bato bakozala bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, . . . oyo batosaka baboti te, . . . bazangi komipekisa, bato ya nko, oyo balingaka makambo ya malamu te, . . . oyo balingá bisengo na esika ya kolinga Nzambe.” *​—2 Timote 3:1-5.

Mosika te, mokili mabe oyo ‘ekoleka’. ​—1 Yoane 2:17

Makambo nyonso wana emonisi eleko oyo ebandaki soki na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba na 1914. Lisusu, kobanda mbula wana, Bokonzi ya Nzambe esakolami na mabele mobimba, mpe Batatoli ya Yehova bamonaka yango lokumu ndenge bayebani mingi mpo na mosala yango. Kutu, zulunalo na bango ya libosoliboso ezali na motó ya likambo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova.

“Yango wana, bósɛnzɛlaka mpamba te boyebi mokolo te mpe ngonga te.”​Matai 25:13.

^ par. 14 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 9 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova. Ezali mpe na www.isa4310.com.