Yisaya 33:1-24

  • Kosambisa mpe elikya mpo na moto ya sembo (1-24)

    • Yehova azali Mosambisi, Mopesi-mibeko mpe Mokonzi (22)

    • Moto moko te akoloba: “Nazali kobɛla” (24)

33  Mawa na yo mobebisi, nzokande babebisi yo naino te;+Yo motɛki oyo batɛki yo naino te! Ntango okosilisa kobebisa, bakobebisa yo.+ Ntango okosilisa kotɛka, bakotɛka yo.   Ee Yehova, moniselá biso boboto.+ Totye elikya epai na yo. Kómá makasi* na biso+ ntɔngɔ nyonso,Ɛɛ, lobiko na biso na ntango ya mpasi.+   Bato ya bikólo bakimi ntango bayoki makɛlɛlɛ makasi. Ntango otɛlɛmi, bikólo epanzani.+   Biloko na bino oyo epunzami ekoyanganisama lokola koyangana ya mayoyo ya lokoso,Bato bakosopanela yango ndenge mayoyo esopanelaka moto.   Yehova akotombwama,Mpo afandi na bisika oyo etombwaná. Akotondisa Siona na bosembo mpe na boyengebene.   Ye moto asalaka ete ozwa libateli,Ebele ya misala ya lobiko,+ bwanya, boyebi mpe kobanga Yehova,+Yango nde eloko na ye ya motuya.   Talá! Bilombe na bango bagangi na balabala;Bamemi-nsango ya kimya baleli na mawa makasi.   Babalabala ya minene etikali mpamba;Moto ya koleka na banzela azali lisusu te. Abuki* kondimana;Abwaki bingumba;Atyeli moto, mowei mpamba,+ likebi te.   Mokili ezali na mawa* mpe ekauki. Liban eyoki nsɔni;+ ebebibebi. Sharone ekómi lokola mokili ekauká,Mpe Bashane ná Karamele ekweisi nkasa na yango.+ 10  Yehova alobi boye: “Sikoyo nakotɛlɛma,”“Sikoyo nakomikumisa;+Sikoyo nakomonisa bonene na ngai. 11  Bokumbi zemi ya matiti ya kokauka mpe boboti matiti ya blé. Elimo na bino moko ekozikisa bino lokola mɔtɔ.+ 12  Mpe bato ya bikólo bakokóma lokola mpɛmbɛ oyo eziki. Bakotumbama na mɔtɔ lokola banzubɛ oyo ekatami.+ 13  Bino baoyo bozali mosika, bóyoka likambo oyo nakosala! Mpe bino baoyo bozali pene, bóyeba nguya na ngai. 14  Na Siona, basumuki bazali na nsɔmɔ;+Kolɛnga ekangi bapɛngwi: ‘Nani kati na biso akoki kofanda esika mɔtɔ oyo ezikisaka ezali?+ Nani kati na biso akoki kofanda na mɔtɔ oyo ezali kopela mpo na libela?’ 15  Ezali moto oyo atambolaka ntango nyonso na boyengebene+Oyo alobaka makambo ya sembo,+Oyo aboyaka litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe, oyo euti na misala ya kobuba,Oyo mabɔkɔ na ye eboyaka kosimba kanyaka,+Mpe oyo akangaka matoi na ye mpo ayoka te makambo ya kosopa makila,Mpe oyo akangaka miso na ye mpo amona te makambo ya mabe 16  Akofanda na bisika oyo etombwaná;Esika na ye ya kokima ya libateli* ekozala na bisika ya mabanga makasi ya libateli.Bakopesa ye limpa na ye;Esika na ye ya kobomba mai ekozanga mai te.”+ 17  Miso na yo ekotalatala mokonzi na kitoko na ye;Ekomona mokili moko ya mosika. 18  Na motema na yo okokanisa* likambo ya nsɔmɔ mpe okomilobela boye: “Wapi sɛkrɛtɛrɛ? Wapi moto oyo azalaki komeka mpako na kilo?+ Wapi moto oyo azalaki kotánga manɔ́ngi?” 19  Okomona lisusu bato ya lofundo te,Bato oyo monɔkɔ na bango ezali mpasi mingi* mpo na kokanga ntina,Bato ya lolemo ya likukuma oyo ozali kokanga ntina te.+ 20  Talá Siona, engumba na biso ya bafɛti!+ Miso na yo ekomona Yerusaleme, esika ya kimya ya kofanda,Hema oyo ekoki kolongolama te.+ Pike ya hema na yango ekopikolama ata moke te,Mpe nsinga na yango ata moko te ekokatama. 21  Kasi kuna Yehova, Moto ya lokumu,Akozala mpo na biso etúká ya bibale, ya banzela minene ya mai.Epai bamasuwa mpo na etumba ekoleka te,Mpe bamasuwa mineneminene ekoleka kuna te. 22  Mpo Yehova azali Mosambisi+ na biso,Yehova azali Moto oyo apesaka biso Mibeko,+Yehova azali Mokonzi na biso;+Ye moto akobikisa biso.+ 23  Bansinga na yo ekofungwama;Likonzí ya kokangisa elamba ya masuwa ekotɛlɛma makasi te; elamba ya mopɛpɛ etandami te. Na ntango yango, bakokabola biloko ebele oyo bapunzi;Ata batɛngumi bakozwa biloko ebele oyo epunzami.+ 24  Mpe moto moko te oyo afandi kuna akoloba: “Nazali kobɛla.”+ Bato oyo bafandi na mokili yango, libunga na bango ekolimbisama.+

Maloba na nse

Lil., “lobɔkɔ.”
Ezali kolobela monguna.
To mbala mosusu, “ekauki.”
To, “esika makasi oyo etombwaná.”
To, “okomanyola.”
Lil., “mozindo.”