Lakisá makambo oyo ezali na kati

Nzambe ayoki mabondeli ya mwasi moko oyo akufá miso

Nzambe ayoki mabondeli ya mwasi moko oyo akufá miso

 Yanmei, Motatoli moko na Azia, asalisaki Mingjie, mwasi moko oyo akufá miso mpo na kokatisa balabala. * Mingjie alobaki na ye boye: “Mersi. Tiká Nzambe apambola yo!” Na nsima, Yanmei atunaki Mingjie soki akondima bákutanaka mpo na kosolola mateya ya Biblia elongo. Mingjie alobaki na ye ete azalaki kobondela mokolo nyonso mpo na komona lisangá ya solosolo ya Nzambe. Mpo na nini azalaki kobondela bongo?

 Mingjie alobaki ete na mobu 2008, moninga na ye moko oyo akufá miso lokola ye, abengaki ye bákende na eglize moko ya bato oyo bazali bibɔsɔnɔ. Nsima ya koyoka mateya, Mingjie atunaki sango soki azwaki mateya yango na buku nini. Sango yango ayebisaki ye ete azwaki yango na Biblia, Liloba ya solosolo ya Nzambe. Mingjie ayokaki mposa makasi ya kotánga yango. Yango wana, azwaki Biblia na monɔkɔ ya Chinois, na ekomeli ya bato oyo bakufá miso mpe atángaki volime 32 yango na boumeli ya sanza soki motoba. Wana Mingjie azalaki kotánga Biblia, amonaki ete liteya ya Bosato (Trinite), oyo bazalaki koteya na ɛglize oyo akendaki ezali lokuta, mpe ete Nzambe azali na nkombo, Yehova.

 Na nsima, bizaleli mabe ya bato ya ɛglize yango ekómaki kosala Mingjie mpasi na motema. Amonaki ete bazalaki kolanda te makambo oyo azalaki kotánga na Biblia. Na ndakisa, bazalaki kopesa bato oyo bakufá miso, bilei oyo elala, oyo bato mosusu batiki; nzokande, bato mosusu bazalaki kopesa bango bilei ya malamu. Likambo wana ezalaki kosala Mingjie mpasi na motema; yango wana akómaki koluka lingomba mosusu na esika oyo afandi. Na yango, azalaki kobondela mpo na komona lisangá ya solosolo ya bokristo.

 Boboto oyo Yanmei amoniselaki ye, etindaki Mingjie andima koyekola Biblia. Na nsima, Mingjie akendaki makita ya Batatoli ya Yehova mpo na mbala ya liboso. Mingjie alobi boye: “Nakobosana ata moke te mbala ya liboso oyo nakendaki na Makita. Bandeko nyonso bazalaki kopesa ngai mbote na esengo. Nakamwaki mingi. Atako nakufá miso, namonaki ete bazali na bolingo mpe baponaka bilongi te.”

 Mingjie akobaki koyekola mpe abandaki koyangana na makita pɔsɔ na pɔsɔ. Alingaka mingi nzembo ya Bokonzi, kasi azalaki kokoka koyemba yango te mpo buku ya nzembo ebongolami naino te na elobeli ya bato oyo bakufá miso oyo atángaka. Yango wana, na lisalisi ya bandeko na lisangá, Mingjie asalaki buku na ye moko ya nzembo ya Bokonzi. Esɛngaki ngonga 22 mpo na kokoma na mabɔkɔ nzembo nyonso 151! Na sanza ya 04/2018, Mingjie abandaki kosakola mpe na nsima akómaki kolekisa ngonga soki 30 sanza nyonso na mosala ya kosakola.

Kokoma buku na ekomeli ya bato oyo bakufá miso ezali mosala monene

 Yanmei atángaki mituna mpe bavɛrsɛ ya Biblia oyo ezali na buku Tobongisami mpo na kosala Mokano ya Yehova mpe akɔtisaki mongɔngɔ na kasɛti mpo na kosalisa Mingjie amibongisa mpo na mituna ya batisimo. Na sanza ya 07/2018, Mingjie azwaki batisimo. Alobi boye: “Bolingo oyo bandeko bazalaki komonisana na liyangani esimbaki motema na ngai. Nalelaki mpo nsukansuka ngai mpe nakɔtaki na kati ya lisangá ya solosolo ya Nzambe.” (Yoane 13:34, 35) Lelo oyo, Mingjie, azali na ekateli ya komonisa bolingo yango oyo bamoniselaki ye, azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza.

^ Topesi bango bankombo mosusu.