Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia elobi nini mpo na Danyele?

Biblia elobi nini mpo na Danyele?

Eyano ya Biblia

 Danyele azalaki mosakoli moko Moyuda oyo atiká nsango oyo azalaki na bomoi na siɛklɛ ya 7 mpe ya 6 L.T.B. Nzambe apesaki ye likoki ya kolimbola bandɔtɔ, ya komona bimonaneli ya makambo oyo ekoya, mpe na nzela ya elimo santu na ye, Nzambe asalisaki Danyele akoma buku moko ya Biblia oyo ezali na nkombo na ye.​—Danyele 1:17; 2:19.

Danyele azalaki nani?

 Danyele akolaki na Yuda, bokonzi oyo esangisaki engumba Yerusaleme mpe tempelo ya Bayuda. Na mobu 617 L.T.B., Nebukadenezare, mokonzi ya Babilone, azwaki Yerusaleme mpe amemaki “bato minene ya mokili” na bokangami na Babilone. (2 Bakonzi 24:15; Danyele 1:1) Ekoki kozala ete Danyele azalaki na mbula kati na 13 tii 19 ntango bamemamaki na bokangami.

 Danyele mpe bilenge mibali mosusu (na kati na bango Shadrake, Meshake, mpe Abedenego) bamemamaki na ndako ya mokonzi ya Babilone mpo na kozwa formasyo ya sipesiale mpo na misala ya Leta. Atako bazalaki kotya bango mbamba ete bawangana kondima na bango, Danyele ná baninga na ye misato batikalaki sembo epai ya Nzambe na bango, Yehova. (Danyele 1:3-8) Nsima ya kozwa formasyo ya mbula misato, mokonzi Nebukadenezare akumisaki bango mpo na bwanya mpe makoki oyo bazalaki na yango, amonaki ete “baleki mbala zomi banganga-nzambe nyonso ya maji mpe bato oyo babelelaka bilimo oyo bazalaki na bokonzi na ye mobimba.” Atyaki Danyele mpe baninga na ye básala na ndako ya mokonzi.​—Danyele 1:18-20.

 Bambula mingi na nsima, ekoki kozala ete Danyele akómaki na mbula soki 90, babengisaki ye na ndako ya mokonzi. Mobali moko na nkombo ya Beleshazare, oyo azalaki koyangela na Babilone, asɛngaki Danyele apesa ye ndimbola ya likomi oyo lobɔkɔ ezalaki kokoma na efelo na ndenge ya likamwisi. Na litambwisi ya Nzambe, Danyele amonisaki ete Babilone ekokwea na mabɔkɔ ya bokonzi ya Bamede ná Baperse. Mpe na butu yango Babilone ezwamaki.​—Danyele 5:1, 13-31.

 Sikoyo, na nse ya boyangeli ya Bamede ná Baperse, Danyele akómaki moto monene mpe mokonzi Dariuse akanaki kopesa ye mikumba misusu. (Danyele 6:1-3) Bankumu minene bakómaki na likunya mpo na Danyele, basalelaki mayele mabe mpo na koboma ye na kobwaka ye na libulu ya bankɔsi, kasi Yehova abikisaki ye. (Danyele 6:4-23) Pene na nsuka ya bomoi ya Danyele, anzelu abimelaki ye mpe alendisaki ye mbala mibale ete azalaki “moto oyo alingami mingi.”​—Danyele 10:11, 19.

 Talá ndenge makambo yango emonisami na video ya drame ya Biblia ya biteni mibale Danyele amonisaki kondima bomoi na ye mobimba.