Danyele 1:1-21

  • Bato ya Babilone bazingi Yerusaleme (1, 2)

  • Bakoteya bilenge bakangami oyo bauti na mabota ya bakonzi (3-5)

  • Bosembo ya Baebre minei emekami (6-21)

1  Na mbula ya misato ya boyangeli ya Yehoyakime+ mokonzi ya Yuda, Nebukadenezare mokonzi ya Babilone ayaki na Yerusaleme mpe azingaki yango.+  Nsukansuka Yehova akabaki Yehoyakime mokonzi ya Yuda na lobɔkɔ na ye,+ ná ndambo ya bisaleli ya ndako* ya Nzambe ya solo. Mpe Mokonzi Nebukadenezare amemaki yango na mokili ya Shineare*+ na ndako* ya nzambe na ye. Atyaki bisaleli yango na esika ya kobomba biloko ya motuya ya nzambe na ye.+  Bongo mokonzi atindaki Ashepenaze, mokambi ya basali ya ndako na ye, amema Bayisraele* mosusu, ata mpe baoyo ya libota ya mokonzi mpe ya libota ya bato ya lokumu.+  Basengelaki kozala bilenge* oyo bazali na mbeba ata moko te na nzoto, bazali kitoko, bazali na bwanya, na boyebi mpe na bososoli,+ mpe oyo bazali na makoki ya kosala na ndako ya mokonzi. Ashepenaze asengelaki koteya bango ekomeli mpe monɔkɔ ya Bakaladea.  Lisusu, mokonzi atindaki bápesaka bango mokolo na mokolo ndambo ya bilei kitoko ya mokonzi mpe vinyo oyo amɛlaka. Basengelaki koteya bango* na boumeli ya mbula misato, mpe na nsuka ya eleko yango, basengelaki kokɔta na mosala ya mokonzi.  Na kati na bango, ezalaki na bato mosusu ya libota* ya Yuda: Danyele,*+ Hanania,* Mishaele* ná Azaria.*+  Mpe mokambi ya basali ya ndako ya mokonzi apesaki bango bankombo* mosusu: apesaki Danyele nkombo Beleteshazare,+ Hanania nkombo Shadrake, Mishaele nkombo Meshake, mpe Azaria nkombo Abedenego.+  Kasi Danyele azwaki mokano na motema na ye ete akomikómisa mbindo te na bilei kitoko ya mokonzi to na vinyo oyo amɛlaka. Na yango asɛngaki mokambi ya basali ya ndako ya mokonzi apesa ye nzela mpo ete amikómisa mbindo te na biloko wana.  Mpe Nzambe ya solo asalaki ete mokambi yango amonisela Danyele boboto* mpe ayokela ye mawa.+ 10  Kasi mokambi yango alobaki na Danyele boye: “Nazali kobanga nkolo na ngai mokonzi, oyo aponeli bino biloko oyo bokolya mpe oyo bokomɛla. Nini ekosalema soki amoni ete bilongi na bino elɛmbilɛmbi ntango akokokanisa bino na bilenge* mosusu ya mbula na bino? Bokomemisa ngai* ngambo epai ya mokonzi.” 11  Bongo Danyele asololaki na mokɛngɛli oyo mokambi ya basali ya ndako ya mokonzi atyaki mpo atalaka ye, Hanania, Mishaele ná Azaria; alobaki na ye: 12  “Nabondeli yo, meká biso basaleli na yo mikolo zomi, bápesa biso kaka ndunda mpo na kolya mpe mai mpo na komɛla. 13  Na nsima okotala bilongi na biso ná bilongi ya bilenge* oyo bazali kolya bilei kitoko ya mokonzi, mpe okosala biso basaleli na yo na kolanda makambo oyo okomona.” 14  Bongo andimaki likanisi na bango mpe amekaki bango mikolo zomi. 15  Na nsuka ya mikolo zomi, bazalaki malamu mingi mpe makasi* koleka bilenge* nyonso oyo bazalaki kolya bilei kitoko ya mokonzi. 16  Na yango, mokɛngɛli azalaki kolongola bilei na bango ya kitoko mpe vinyo na bango mpe azalaki kopesa bango ndunda. 17  Mpe Nzambe ya solo apesaki bilenge* wana minei boyebi, mayele ya kososola makomi ya ndenge nyonso ná bwanya; mpe Danyele azwaki likoki ya koyeba ndimbola ya bimonaneli mpe ya bandɔtɔ ya ndenge nyonso.+ 18  Na nsuka ya eleko yango, na ntango oyo mokonzi alobaki ete bámema bilenge yango,+ mokambi ya basali ya ndako ya mokonzi amemaki bango liboso ya Nebukadenezare. 19  Ntango mokonzi asololaki na bango, amonaki ete moko te azalaki lokola Danyele, Hanania, Mishaele mpe Azaria;+ na yango babandaki kosalela mokonzi. 20  Na likambo nyonso oyo mokonzi azalaki kotuna bango, oyo esɛngi bwanya mpe mayele, amonaki ete baleki mbala zomi banganga-nzambe nyonso ya maji mpe bato oyo babelelaka bilimo+ na bokonzi na ye mobimba. 21  Mpe Danyele atikalaki kuna tii na mbula ya liboso ya Mokonzi Siruse.+

Maloba na nse

To, “tempelo.”
Elingi koloba, Babilonia.
To, “tempelo.”
Lil., “bana ya Yisraele.”
Lil., “bana.”
To mbala mosusu, “kobɔkɔla bango.”
Elimboli, “Yehova asalisi.”
Mbala mosusu elimboli, “nani azali lokola Nzambe.”
Elimboli, “Yehova amonisi boboto.”
Lil., “bana.”
Elimboli, “mosambisi na ngai ezali Nzambe.”
Elingi koloba, bankombo ya bato ya Babilone.
To, “andima Danyele.”
Lil., “motó na ngai.”
Lil., “bana.”
Lil., “bana.”
Lil., “nzoto mafuta.”
Lil., “bana.”
Lil., “bana.”