Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

JW LIBRARY

Kozwa, kobomba, mpe kolongola mikanda​—Android

Kozwa, kobomba, mpe kolongola mikanda​—Android

Ezali na ebele ya babuku, mwa babuku, batrakte, mpe bavideo oyo okoki kotánga mpe kotala na JW Library ntango ozali kosalela Internet te.

Landá makambo oyo mpo oyeba kozwa, kobomba, mpe kolongola mikanda:

 Kozwa mokanda

Okoki kozwa mikanda ebele mpo na kotánga mpe koyekola Biblia ntango ozali kosalela Internet te.

  • Fungolá menu, mpe bɛtá esika bakomi Pubications mpo omona liste ya mikanda.

  • Bɛtá elembo ya minɔkɔ mpo na komona mikanda oyo okoki kozwa. Poná monɔkɔ oyo olingi. Minɔkɔ oyo osalelaka mingi ekozala na esika ya liboso. Mpo na koluka monɔkɔ moko, okoki mpe kobɛta nkombo na yango.

Ezali na ndenge mwa mingi ya koluka mikanda na JW Library.

Esika bakomi Par catégorie emonisi mikanda ndenge esangisamá, na ndakisa babuku, batrakte, to bavideo. Soki obɛti mikanda mosusu, okokuta makambo mosusu na kati oyo okopona, na ndakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ekabolami na kolanda bambula, bavideo ezali na mitó ya makambo. Soki obɛti esika bakomi Toutes les catégories, okozonga na ebandeli.

Esika bakomi Nouveautés emonisi mikanda oyo etyami sika na monɔkɔ oyo ozali kosalela.

Mpo na kozwa mokanda moko, bɛtá yango. Mikanda oyo ekɔti naino te na aparɛyi na yo ekozala na elembo ya lipata pene na yango. Mpo na kozwa mokanda moko, bɛtá yango. Soki mokanda yango ekɔti na aparɛyi na yo, elembo ya lipata ekolongwa. Bɛtá lisusu mokanda yango mpo otánga yango.

Esika bakomi Téléchargé emonisi mikanda nyonso oyo ozwi mpe ekɔti na aparɛyi na yo, ezala na monɔkɔ nini. Okoki kosepela ebima na kolanda Les plus consultés, Rarement consulté, to Taille décroissante.

Kolongola mokanda

 Okoki kolongola mokanda moko soki mposa na yango esili to mpo aparɛyi na yo etonda na biloko ebele te.

Fungolá menu mpe bɛtá na Publications, na nsima bɛtá nkombo moko, (na ndakisa, Babuku​/Livres) mpo omona mikanda oyo ezali. Soki olingi kolongola mokanda moko, bɛtá madodo misato oyo ezali wana; na nsima bɛtá Supprimer.

Soki olingi te aparɛyi na yo etonda na biloko, okoki kolongola mikanda oyo osalelaka mingi te to oyo ezali kilo mingi. Fungolá menu mpe bɛtá na Publications. Bɛtá esika bakomi Téléchargé; na nsima poná elakisa na kolanda Rarement consulté to Taille décroissante. Longolá mikanda oyo ozali lisusu na mposa na yango te.

Kozwa mbongwana oyo ekɔti na mokanda

 Ntango mosusu, bakoki kokɔtisa mwa mbongwana na mokanda oyo osilá kozwa.

Na ntango yango, elembo moko ekobakisama pembeni ya madodo. Soki obɛti mokanda yango, okomona liyebisi oyo elobi ete bakɔtisi mwa mbongwana. Bɛtá Télécharger mpo na kozwa yango, to bɛtá Plus tard mpo okoba kosalela mokanda oyo osilá kozwa.

Mpo omona soki bakɔtisi mwa mbongwana na mikanda oyo osilá kozwa, fungolá menu; bɛtá Publications mpe bɛtá na télechargé. Soki bakɔtisi mbongwana, okomona maloba Mis à jour en attente ekobakisama. Bɛtá na maloba yango mpo omona mikanda oyo bakɔtisi mbongwana. Bɛtá mokanda moko mpo na kokɔtisa mbongwana, to bɛtá esika bakomi Tout mettre à jour mpo okɔtisa mbongwana nyonso.

Makambo yango ebimaki na sanza ya mibale na 2015 na JW Library 1.4, oyo esalaka malamu na aparɛyi Android 2.3 matá. Soki ozali komona yango te, landá malako oyo ezali na lisolo “Bandá kosalela JW Library​—Android,” na motó ya likambo Mpo na Kozwa makambo ya sika.