Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

JW LIBRARY

Koluka liloba na Biblia to na mokanda​—Android

Koluka liloba na Biblia to na mokanda​—Android

Elembo ya koluka makambo etyami na JW Library mpo na kosalisa yo omona liloba to fraze na Biblia to na mokanda.

Landá makambo oyo mpo na koluka:

 Koluka liloba na Biblia

Okoki koluka liloba to fraze na Biblia oyo ezali kotánga.

Na kati ya Biblia, bɛtá elembo ya koluka; na nsima bandá kokoma liloba oyo olingi koluka. Ntango ozali kobɛta, maloba ekobima mpo opona moko. Poná liloba moko to finá mbuma ya kokɔtisa na clavier mpo omona yango na kati ya Biblia.

Okoki koluka na ndenge ekeseni. Esika bakomi Verset les plus cités emonisi bavɛrsɛ oyo tosalelaka mingi. Esika bakomi Tous les versets emonisi bavɛrsɛ nyonso oyo ezali na liloba yango. Esika bakomi Articles emonisaka makambo oyo ezali na maloba ya ebandeli mpe ba apɛndisi.

Soki okomi maloba ebele, tyá elembo na Expression exacte mpo ebimisa mpenza fraze mobimba oyo okomi.

 Koluka liloba na mokanda

Okoki koluka liloba moko to fraze mobimba na mokanda oyo ozali kotánga.

Na kati ya mokanda yango, finá na elembo ya Koluka; mpe banda kokoma liloba oyo olingi koluka. Ntango ozali kokoma, maloba ebele ekobima. Soki omoni liloba oyo ozali koluka, bɛtá na mbuma ya koluka na clavier mpo omona yango na mokanda.

Soki okomi maloba ebele, tyá elembo na Expression exacte mpo ebimisa mpenza fraze mobimba oyo okomi.

 Koluka lisolo moko

Soki ozwá buku Étude perspicace, okoki koluka liloba oyo ezali na Étude perspicace. Okoki kosala yango ntango ozali kotánga Biblia to mokanda mosusu na JW Library.

Bɛtá elembo ya Koluka, na nsima bandá kokoma liloba oyo olingi koluka. Ntango ozali kokoma, makambo oyo ezali na Étude perspicace ekobima mpo opona moko. Bɛtá liloba moko mpo ofungola lisolo yango.

Makambo yango ebimaki na sanza ya zomi na 2014 na JW Library 1.3.4, oyo esalaka malamu na aparɛyi Android 2.3 matá. Soki ozali komona yango te, landá malako oyo ezali na lisolo “Bandá kosalela JW Library​—Android,” na motó ya likambo Mpo na Kozwa makambo ya sika.