Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

JW LIBRARY

Kosalela Historique​—Android

Kosalela Historique​—Android

JW Library ebombaka masolo mpe mikapo ya Biblia oyo ozali kotánga. Yango ekoki kosalisa, na ndakisa, mpo ozonga na vɛrsɛ oyo outaki kotánga.

Landá makambo oyo mpo oyeba ndenge ya kosalela Historique:

 Komona lisusu makambo oyo otángaki

Bɛtá elembo ya Historique mpo omona bavɛrsɛ mpe masolo oyo outaki kotánga kala te. Bɛtá vɛrsɛ to lisolo oyo olingi kotánga lisusu.

 Koboma makambo oyo otángaki

Bɛtá elembo ya Historique mpo omona makambo oyo otángaki. Mpe bɛtá esika bakomi Tout effacer mpo oboma makambo yango nyonso.

Makambo yango ebimaki na sanza ya minei na 2014 na JW Library 1.2, oyo esalaka malamu na aparɛyi Android 2.3 matá. Soki ozali komona yango te, landá malako oyo ezali na lisolo “Bandá kosalela JW Library​—Android,” na motó ya likambo Mpo na Kozwa makambo ya sika.