Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mikakatano ya nkita ekosila mokolo mosusu?

Mikakatano ya nkita ekosila mokolo mosusu?

 Na bamboka ndenge na ndenge, bato bazali kotomboka na babalabala mpo bazali komona ete makambo ya nkita ezali kotambwisama na bosembo te. Mikakatano yango ekómaki lisusu makasi na eleko ya maladi mabe ya coronavirus, oyo esalaki ete bato bázala na esengo te, bábima lisusu te na bandako na bango, bázanga biloko mosusu ya ntina, mpe bázwa te lisalisi ya malamu ya monganga. Kasi ezalaki bongo te mpo na bazwi, yango emonisaki mpenza bokeseni makasi oyo ezali kati na bazwi mpe babola.

 Mikakatano ya nkita oyo ezali konyokola bato ekosila mokolo mosusu? Ɛɛ. Biblia elobeli makambo oyo Nzambe akosala mpo na kosilisa mikakatano oyo tozali kokutana na yango lelo oyo.

Mikakatano ya nkita oyo Nzambe akosilisa

 Mokakatano: Bato balongi te kotya nkita oyo ezali kokokisa bamposa ya bato nyonso.

 Solisyo: Nzambe akolongola baguvernema ya bato mpe akotya guvernema na ye na esika na yango, guvernema yango ebengami Bokonzi ya Nzambe. Ekoyangela likoló mpe mabele mobimba.​—Danyele 2:44; Matai 6:10.

 Litomba: Lokola Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele mobimba, ekotambwisa makambo na lolenge eleki malamu mpenza. Babola bakozala lisusu te mpe bato bakomitungisa te mpo na mikakatano ya nkita. (Nzembo 9:7-9, 18) Kutu, bakosepela na mosala na bango mpe bakozala na esengo elongo na mabota na bango. Biblia epesi elaka oyo: “Bakotonga bandako mpe bakofanda kuna; mpe ya solo, bakolona bilanga ya vinyo mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga mpo moto mosusu afandaka kuna te; bakolona mpo moto mosusu alya te.”​—Yisaya 65:21, 22.

 Mokakatano: Bato bakoki te kopekisa makambo oyo ememelaka bango mikakatano mpe oyo esalaka ete bázanga biloko oyo bazali na yango mposa na bomoi.

 Solisyo: Na nzela ya Bokonzi na ye, Nzambe akolongola makambo nyonso oyo esalaka ete bato bázala na kobanga mpe na kimya te.

 Litomba: Na nse ya Bokonzi ya Nzambe, bato bakokutana lisusu te na makambo oyo esalaka ete bábungisa biloko oyo bango moko mpe mabota na bango bazali na yango mposa mpo na kobikela. Na ndakisa, bitumba, nzala, mpe bamaladi mabe ekozala lisusu te. (Nzembo 46:9; 72:16; Yisaya 33:24) Nzambe alobi boye: “Bato na ngai bakofanda mpenza na esika ya kimya mpe na bisika ya kofanda oyo moto akobanga ata moke te mpe na bisika ya kopema oyo ezangi mitungisi.”​—Yisaya 32:18.

 Mokakatano: Bato ya lokoso mpe oyo balukaka kaka matomba na bango moko basalelaka basusu makambo na kozanga bosembo.

 Solisyo: Bato oyo bakozala na nse ya Bokonzi ya Nzambe bakoyekola ndenge ya komonisela basusu bolingo na esika ya kotya matomba na bango moko na esika ya liboso.​—Matai 22:37-39.

 Litomba: Na nse ya Bokonzi ya Nzambe, moto nyonso akomonisa bolingo oyo Nzambe azalaka na yango, oyo “elukaka matomba na yango moko te.” (1 Bakorinti 13:4, 5) Biblia elobi boye: “Bakosala eloko moko te ya mabe mpe bakobebisa eloko moko te na ngomba mosantu na ngai mobimba; mpo mabele ekotonda na boyebi ya Yehova a ndenge mai etondi na mbu.”​—Yisaya 11:9.

 Biblia emonisi ete mokili oyo ekómi na nsuka mpe mosika te Nzambe akokokisa elaka na ye ya kosilisa mikakatano nyonso na makambo etali nkita. b (Nzembo 12:5) Liboso ete makambo yango esalema, mitinda ya Biblia ekoki kosalisa yo olonga mikakatano ya nkita sikoyo. Na ndakisa, talá masolo “Okosala nini soki ozali lisusu na mbongo mingi te?” mpe “Kotalela mbongo na ndenge ebongi.”

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.​—Nzembo 83:18.

b Mpo na koyeba ntina oyo osengeli kotyela Biblia motema, talá lisolo “Biblia​—Buku oyo ebongi kotyela motema.”