Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 145

Nzambe alaki biso Paradiso

Nzambe alaki biso Paradiso

(Luka 23:43)

  1. 1. Ngai ná yo na Paradiso,

    Oyo Tat’alaki biso;

    Lisumu’ekei, bampasi’esili,

    Tokokufa lisusu te.

    (MONDIMO)

    Awa na nse, Paradiso.

    Eza’ koya, yango wana.

    Yehova alaki yango,

    Yesu akokokis’ango.

  2. 2. Bakufi mpe, Nzamb’alobi’ete

    Mwan’akosekwisa bango.

    Mpe mot’oyo Yesu’alakaki

    Paradiso, akozw’ango.

    (MONDIMO)

    Awa na nse, Paradiso.

    Eza’ koya, yango wana.

    Yehova alaki yango,

    Yesu akokokis’ango.

  3. 3. Yesu’azali lelo Mokonzi,

    Akosala Paradiso.

    Tótɔnda Yah, Tat’a bolingo;

    Tóyembela ye n’esengo.

    (MONDIMO)

    Awa na nse, Paradiso.

    Eza’ koya, yango wana.

    Yehova alaki yango,

    Yesu akokokis’ango.