Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 144

Tyá miso na yo na mbano!

Tyá miso na yo na mbano!

(2 Bakorinti 4:18)

  1. 1. Matoi ekufá eyoki,

    Bakufi-miso bamoni,

    Banzembo’a ban’epai n’epai,

    Kimya mokili mobimba,

    Bakufi mpe balamuki,

    Lisumu, bitumb’esili,

    (MONDIMO)

    Nyonso wana, mp’omon’ango,

    Tyá miso na yo na mbano.

  2. 2. Ɛɛ, mbwa ya zamba ná mpate,

    Mwan’a ntaba, ye ná nkoi,

    Bakozalazal’elongo,

    Mpe mwan’akokamba bango,

    Makambo nyonso ya sika,

    Ɛɛ, nsɔmɔ, mpasi’ekolongwa,

    (MONDIMO)

    Nyonso wana, mp’omon’ango,

    Tyá miso na yo na mbano.