Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nazali ngai moko te

Nazali ngai moko te

Zwá:

  1. 1. Ngai mawa, ndeko te,

    Tata te, mama te;

    Nakolelela nani?

    Motema na ngai mpasi.

    Naza na moto te,

    Moning’azali te,

    Nani’akobɔndisa nga?

    Nga nakolela na nani?

    (MONDIMO)

    Nazali se

    Ngai moko te;

    Mpo Yehova

    Aza na nga.

    Ye ayebi

    Mpe amoni.

    Ayoki nga;

    Aza wana.

    Eya butu’eya moi,

    Toza nga ná ye.

  2. 2. Ata nabungisi

    Nde nyonso mpo na yo,

    Ata babwaki ngai,

    Yo okosundola nga te.

    Nzambe na nga, oza

    Pene, mosika te.

    Elikya na ng’eza yo;

    Nayebi’okotika nga te.

    (MONDIMO)

    Nazali se

    Ngai moko te;

    Mpo Yehova

    Aza na nga.

    Ye ayebi

    Mpe amoni.

    Ayoki nga;

    Aza wana.

    Eya butu’eya moi,

    Toza nga ná ye;

    Ngai moko te.

    Mpo Yehova

    Aza na nga.

    Ye ayebi

    Mpe amoni.

    Ayoki nga;

    Aza wana.

    Eya butu’eya moi,

    Toza nga ná ye.