Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Koluka

Koluka

Zwá:

  1. 1. Balobaka: ‘Luk’okozwa’

    Liyak’a motuya: solo.

    Totungisamaki, mituna mingi.

    Nzokande tolukaki.

    (LIBOSO YA KOKƆTA NA MONDIMO)

    Tolɛmbaki te koluka solo,

    Neti komelesa az’oluka misolo.

    (MONDIMO)

    Luká, epai okozwa

    Biyano’a malonga

    Na mituna oy’a mpasi:

    Moto’autá wapi, mpo na nini tolingi Bokonzi’eya noki.

    Luká tii’okozwa.

  2. 2. Toyebaki te nkombo’a Nzambe.

    Nzokande Nzamb’eza Yehova.

    Ntango balakisi biso,

    Miso’ebandi komona.

    (LIBOSO YA KOKƆTA NA MONDIMO)

    Tolɛmbaki te koluka solo,

    Koluk’epai toutá mp’epai toza kokende.

    (MONDIMO)

    Luká, epai okozwa

    Biyano’a malonga

    Na mituna oy’a mpasi:

    Moto’autá wapi, mpe paradis’oy’ez’oya na Bokonzi’a Nzambe.

    Luká, okozwa.

    (MOLƆNGƆ MOSUSU)

    Biso mpe toz’osunga baye baz’oluka

    Liyak’a ntalo’a solo,

    Batondani na mituna mingi.

    Tiká tósunga bango,

    Tóteya bang’oyo tozwi.

    (MONDIMO)

    Luká, epai okozwa

    Biyano’a malonga

    Na mituna oy’a mpasi:

    Moto’autá wapi, bomoi ya seko na Bokonzi’oy’ez’oya.

    Luká, okozwa.