Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nakoki lisusu kotɛlɛma

Nakoki lisusu kotɛlɛma

Zwá:

  1. 1. Motema mpasi, ngai moko, nakoki te.

    Yehova, nayebi mabe na nga’.

    Nakómi na nsuka, pesá nga’ nde makasi.

    Nalingi kozonga na ndako n’o

    (MONDIMO)

    Nayebi maloba na yo nabosani te

    Toli kitoko ya Liloba n’o.

    Nga’ nabɛta libaku to mpe nakwea,

    Nakotɛlɛma.

  2. 2. Nayebi baoyo ya nga’,

    Balingi nga’ mpenza,

    Balingi Yehova na solo.

    Liloba na yo nde mwinda na nga’ mpo nazonga.

    Nalingi nazonga na nzela n’o.

    (MOLƆNGƆ MOSUSU)

    Nakende wapi, natala wapi, ezali polele:

    Nsuk’ekómi pene.

    (MONDIMO)

    Yehova, Nzambe na nga’, lelo yoká nga

    Salisá ngai, naza’ na mposa n’o.

    Oyebi ata nakwei mbala nsambo,

    Nakotɛlɛma.

    (MOLƆNGƆ MOSUSU)

    Nandimi Yehov’ayebi; naza’ na mposa’a basungi

    Ayebi nalɛmbi, atángaka na motema

    Atali malamu na nga’

    (MONDIMO)

    Lelo nakende na makita namona bolingo,

    Nazonga epai na biso.

    Nga’ nabɛta libaku to mpe nakwea, nakotɛlɛma.

    Nakotɛlɛma.