Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge nini osengeli kopesa bana disiplini?

Ndenge nini osengeli kopesa bana disiplini?

“Nazalaki kolanda na motema likoló makelele ya motuka nyonso oyo ezalaki koleka. Yango ezalaki mbala ya misato oyo Jordan abukaki mobeko ya kozonga ndako na ngonga oyo totyelaki ye. Nazalaki komituna boye: ‘Azali wapi?’ ‘Likama moko ekómeli ye?’ ‘Azali koyeba kutu ndenge tozali komitungisa?’ Ntango ayaki, nalingaki mpenza kotombokela ye.”​GEORGE.

“Mwana na ngai ya mwasi agangaki makasi, mpe yango ebangisaki ngai mingi. Nabalukaki mpe namonaki ye asimbi motó mpe azali kolela mpo leki na ye ya mobali ya mbula minei abɛtaki ye.”​—NICOLE.

Natalie, mwana na biso ya mwasi ya mbula motoba, alobaki na biso boye: “‘Nayibi lopɛtɛ te. Namonaki yango!’ lokola nde asalaki eloko te. Ndenge awanganaki esalaki biso mpasi makasi mpe tolelaki. Toyebaki ete azalaki kokosa.”​—STEPHEN.

SOKI ozali moboti, yo mpe osí oyoká ndenge baboti oyo tolobeli awa na likoló bayokaki? Ntango okutanaka na makambo ya ndenge wana, omitungisaka mpo na ndenge oyo osengeli kopesa mwana disiplini to mpe soki ebongi opesa ye yango? Ezali mabe kopesa bana disiplini?

DISIPLINI EZALI NINI?

Na Biblia, liloba “disiplini” ezali kaka te liloba mosusu mpo na kolobela etumbu. Disiplini ezalaka libosoliboso kopesa malako, koteya mpe kosembola. Eyokani te na konyokola.​—Masese 4:1, 2.

Tokoki kokokanisa disiplini ya baboti na kosala mwa elanga. Moloni abongisaka mabele, asopaka mai mpe aleisaka milona, asalaka ete mwa banyama mikemike mpe matiti ebebisa yango te. Ntango milona ezali kokola, moloni akoki kokataka bitape na yango mpo na kosalisa yango ekola malamu. Ayebaka ete kosalela malamumalamu mayele ndenge na ndenge esalisaka mpo molona ekola malamu. Ndenge moko mpe, baboti bakipaka bana na bango na balolenge mingi. Kasi na bantango mosusu, basengeli kopesa bana disiplini, oyo ndenge moko na kokata bitape ya molona, ekoki kosembola makanisi mabe ya bana kaka na ebandeli mpe kosalisa bango bákola malamu. Kasi, esengeli kokata bitape ya molona na mayele noki te ekobeba mpo na libela. Ndenge moko mpe, baboti basengeli kopesa bana disiplini na bolingo mpenza.

Yehova, Nzambe ya Biblia, apesá baboti ndakisa malamu na likambo yango. Disiplini oyo apesaka basambeli na ye ya botosi esimbaka mpe ezalaka malamu mpenza, yango wana bakómaka ‘kolinga disiplini.’ (Masese 12:1) ‘Basimbaka disiplini’ mpe ‘batikaka yango te.’ (Masese 4:13) Okoki kosalisa mwana andima disiplini soki omekoli mpenza makambo misato oyo esimbi disiplini ya Nzambe: Epesamaka na (1) bolingo, (2) elekaka ndelo te, mpe (3) ezalaka bongolabongola te.

DISIPLINI OYO EPESAMI NA BOLINGO

Disiplini ya Nzambe esimbami na bolingo; ezaleli yango nde etindaka ye apesa disiplini. Biblia elobi boye: “Yehova apamelaka moto oyo ye alingaka, kaka ndenge tata apamelaka mwana oyo ye asepelaka na ye.” (Masese 3:12) Lisusu, Yehova azali ‘na motema mawa mpe na ngɔlu, ayokaka nkanda noki te.’ (Kobima 34:6) Yango wana Yehova anyokola bato te. Asalelaka mpe te maloba mabe, kolobela ntango nyonso mabe oyo moto asali, kotyola ye, nyonso wana ekoki kosala moto mpasi ‘lokola nde azali kozoka na mopanga.’​—Masese 12:18.

YOKÁ

Toboyi te, baboti bakoki te komekola na ndenge ya kokoka ezaleli ya Nzambe oyo etali komipekisa. Na bantango mosusu ekoki kozala mpasi omonisa motema molai, kasi ntango mwana asali likambo moko ya mabe mpenza, kobosana te ete etumbu oyo epesami na nkanda mbala mingi ezalaka mabe mpenza, elekaka ndelo mpe ebotaka mbuma mabe. Longola yango, etumbu oyo epesami na nkanda ezali disiplini te. Ezali nde kozanga ezaleli ya komipekisa.

Kasi, ntango ozali kopesa disiplini na bolingo mpe ozali na komipekisa, na ntembe te ekobota mbuma malamu. Tótala ndenge George ná Nicole, baboti mibale oyo tolobelaki na ebandeli basalaki.

SAMBELÁ

“Ntango Jordan ayaki, ngai ná mwasi na ngai tozalaki na nkanda makasi, kasi tokangaki motema ntango azalaki koyebisa biso ntina oyo ayaki retare. Lokola ngonga epusanaki, tozwaki ekateli ya kosolola likambo yango na ntɔngɔ. Tobondelaki elongo mpe tokendaki kolala. Mokolo oyo elandaki, tozalaki motema mpiɔ mpo na kolobela likambo yango na malɛmbɛ mpe esimbaki motema ya mwana na biso. Andimaki mibeko oyo totyelaki ye mpe mabe oyo asalaki. Likambo ya esengo ezali ete tomonaki ete kotalela likambo nokinoki ntango bato bazali na nkanda, ebotaka mbuma malamu te. Ntango tozalaki naino koyoka liboso, mbala mingi makambo ezalaki kosimba.”​—George.

LOBÁ

“Nasilikaki makasi ntango namonaki ndenge mwana na ngai ya mobali abɛtaki ndeko na ye ya mwasi kaka mpamba. Na esika nabɛta ye mbala moko, nakɔtisaki ye na shambre mpo mwaye ya kozwela ye ekateli ezalaki te mpo nayokaki nkanda makasi. Na nsima, ntango nkanda ekitaki, namonisaki ye ete mobulu ezali mabe mpe mpasi oyo ayokisaki yaya na ye. Kosala bongo esimbaki. Asɛngaki yaya na ye bolimbisi mpe ayambaki ye.”​Nicole.

Ya solo, disiplini ya malamu, ata soki esɛngi kopesa etumbu, epesamaka ntango nyonso na bolingo.

DISIPLINI YA KOLEKA NDELO TE

Disiplini ya Yehova epesamaka ntango nyonso “na ndenge oyo ekoki.” (Yirimia 30:11; 46:28) Atalelaka makambo nyonso, ata oyo emonani polele te. Ndenge nini baboti bakoki kosala mpe bongo? Stephen, oyo tolobelaki na ebandeli, alobi boye: “Atako esalaki biso mpasi mpe toyebaki te mpo na nini Natalie awanganaki makasi ndenge wana atako ye nde azwaki lopɛtɛ yango, totalelaki mbula na ye mpe likoki na ye ya kotalela makambo.”

Robert, mobali ya Nicole, atalelaka makambo nyonso. Ntango bana basali mabe, amitunaka mbala na mbala boye: ‘Ezali mbala ya liboso básala bongo to ekómi momesano? Mwana alɛmbaki to azalaki koyoka nzoto malamu te? Likambo oyo asali ezali elembo ete azali na likambo mosusu oyo ebombani?’

Baboti oyo balekisaka ndelo te bayebaka mpe ete bana na bango bazali mikóló te. Ntoma Paulo andimaki likambo yango ntango akomaki boye: “Ntango nazalaki mwana moke, nazalaki koloba lokola mwana moke, kokanisa lokola mwana moke.” (1 Bakorinti 13:11) Robert, alobi boye: “Kokanisa makambo oyo ngai moko nazalaki kosala ntango nazalaki mwana esalisaka ngai natalelaka makambo na ndenge oyo ebongi mpe nasilikaka koleka ndelo te.”

Ezali na ntina otalela makambo na ndenge oyo ebongi mpe kokɔtela mwana te na likambo ya mabe oyo asali to ezaleli ya mabe oyo akómi na yango, kozanga kokipe yango. Soki ozali kotalela makoki ya mwana, bandelo na ye, mpe makambo mosusu, na ntembe te okopesa ye disiplini ya koleka ndelo te mpe oyo ebongi.

DISIPLINI OYO EZALI BONGOLABONGOLA TE

Malaki 3:6 elobi boye: “Ngai nazali Yehova; nabongwani te.” Basaleli ya Nzambe batyelaka likambo yango motema mpe boyebi yango epesaka bango kimya. Bana mpe bazalaka na mposa ya kozwa disiplini oyo ezali kosala ete bázala na kimya. Soki mibeko na yo ebongwanaka na kotalela ndenge oyo ozali komiyoka, makanisi ya bana ekobulungana mpe bakolɛmba nzoto.

Kobosana te ete Yesu alobaki: “Tiká liloba na bino ‘Ɛɛ’ ezala Ɛɛ, ‘Te’ na bino, Te.” Maloba yango etaleli mpe baboti. (Matai 5:37) Kanisá malamumalamu liboso ya kokweisa mibeko oyo okolandela na yo yango te. Soki okebisi mwana ete akozwa etumbu boye to boye soki atosi te, salá kaka ndenge olobaki.

Kopesa disiplini oyo ezali bongolabongola te esɛngaka baboti básololaka malamu. Robert alobi boye: “Soki bana na biso balingi kondimisa ngai likambo moko oyo mwasi na ngai ayebisaki bango básala yango te soki nayebi yango, nabongolaka ekateli na ngai mpo eyokana na oyo ya mwasi na ngai.” Soki baboti bayokani te na ndenge ya kosilisa likambo moko boye, ezali malamu básolola na esika ya bango mibale mpe bázwa ekateli moko.

DISIPLINI EZALI NA NTINA

Soki olandi ndenge oyo Yehova apesaka disiplini na bolingo, na koleka ndelo te, mpe azalaka bongolabongola te, okoki kotya motema ete milende na yo ekomemela bana na yo matomba. Litambwisi ya bolingo oyo okopesa bango ekoki kosalisa bango bákola malamu mpe bákoma mikóló oyo bayebi kokokisa mikumba na bango mpe oyo bayebi kotalela makambo. Biblia elobi boye: “Bɔkɔlá mwana mobali na kolanda nzela oyo esengeli mpo na ye; ata ntango akokóma mobange akopɛngwa na yango te.”​—Masese 22:6.