Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biyano na mituna ya Biblia

Biyano na mituna ya Biblia

Mpo na nini tosengeli kobondelaka?

Yehova Nzambe alingaka ete tobangaka te koyebisa ye mbala na mbala mitungisi na biso. (Luka 18:1-7) Ayokaka mpo atyelaka biso likebi. Lokola Tata na biso ya likoló asɛngi biso na boboto nyonso ete tóbondelaka, mpo na nini te kosala yango?​—Tángá Bafilipi 4:6.

Libondeli ezali kaka te libaku ya kosɛnga lisalisi. Kutu, esalisaka biso tópusana penepene na Nzambe. (Nzembo 8:3, 4) Ntango tozali koyebisa Nzambe mbala na mbala makambo oyo ezali na motema na biso, boninga na biso ná ye ekokóma makasi.​—Tángá Yakobo 4:8.

Ndenge nini tosengeli kobondela?

Ntango tozali kobondela, Nzambe alingaka te tósalela maloba ya mindɔndɔmindɔndɔ to kozongela mabondeli oyo tokangá na motó. Kofukama to kotɛlɛma ezali mpe te likambo oyo asɛngi mpo andima libondeli na biso. Yehova asɛngi nde ete mabondeli na biso eutaka na motema. (Matai 6:7) Na ndakisa, na Yisraele, Hana abondelaki mpo na likambo moko ya libota oyo ezalaki kotungisa ye. Na nsima, ntango mawa na ye ebongwanaki esengo, abondelaki Nzambe na motema mobimba mpo na kopesa ye mersi.​—Tángá 1 Samwele 1:10, 12, 13, 26, 27; 2:1.

Oyo nde libaku malamu tozali na yango! Tokoki koyebisa Mozalisi mitungisi na biso. Tokoki mpe kokumisa ye mpe kopesa ye mersi mpo na oyo asalaka. Ya solo, tosengeli kozwa libaku wana na lisɛki te.​—Tángá Nzembo 145:14-16.