Teyá bana na yo
Sekele oyo okoki koyebisa basusu
NAINO bayebisá yo sekele moko te?— * Ezali na sekele moko oyo nakosepela koyebisa yo. Biblia ebengi yango “sekele mosantu oyo ebombamaki ntango molai mingi.” (Baroma 16:25) Na ebandeli kaka Nzambe nde ayebaki “sekele mosantu” yango. Tótala ndenge oyo Nzambe asalaki mpo bato mingi báyeba sekele yango.
Liboso tóbanda, oyebi soki liloba “mosantu” elimboli nini?— Elimboli pɛto, to ya ntina mingi. Na yango, sekele yango ebengami mosantu mpo euti na Nzambe oyo azali mosantu. Okanisi ete banani balukaki koyeba sekele yango ya ntina mingi?— Baanzelu. Biblia elobi boye: “Makambo wana nde baanzelu bazalaka na mposa ya kotalatala.” Ya solo, balingaki koyeba sekele mosantu yango.—1 Petro 1:12.
Ntango Yesu ayaki awa na mabele, alobelaki sekele mosantu mpe abandaki kolimbola yango. Ayebisaki bayekoli na ye boye: “Sekele mosantu ya bokonzi ya Nzambe epesami na bino.” (Marko 4:11) Omoni soki sekele mosantu yango etali likambo nini?— Etali Bokonzi ya Nzambe, oyo Yesu ateyaki biso tóbondelaka mpo na yango!—Matai 6:9, 10.
Sikoyo, tótala mpo na nini Bokonzi ya Nzambe ezalaki sekele “ntango molai mingi” tii ntango Yesu ayaki awa na mabele mpe abandaki kolimbola yango. Ntango Adama ná Eva babukaki mobeko ya Nzambe mpe babimisamaki na elanga ya Edene, basaleli ya Nzambe bayaki koyeba ete mokano ya Nzambe ete mabele mobimba ekóma paradiso ebongwanaki te. (Ebandeli 1:26-28; 2:8, 9; Yisaya 45:18) Bakomaki mpo na esengo oyo bato bakozala na yango awa na mabele na nse ya Bokonzi ya Nzambe.—Nzembo 37:11, 29; Yisaya 11:6-9; 25:8; 33:24; 65:21-24.
Kanisá sikoyo mpo na Moyangeli ya Bokonzi ya Nzambe. Oyebi soki nani Nzambe aponi azala Moyangeli?— Mwana na ye Yesu Kristo, “Nkumu ya kimya.” Biblia elobi ete: “Boyangeli ekozala na lipeka na ye.” (Yisaya 9:6, 7) Yo ná ngai tosengeli kozwa “boyebi ya solosolo ya sekele mosantu ya Nzambe, elingi koloba, Kristo.” (Bakolose 2:2) Tosengeli koyeba ete Nzambe azwaki bomoi ya anzelu ya liboso (Mwana na ye ya elimo) oyo akelaki mpe atyaki yango na libumu ya Maria. Mwana yango, oyo azalaki anzelu ya nguya, azalaki ye oyo Nzambe atindaki na mabele lokola mbeka mpo biso tókoka kozwa bomoi ya seko.—Matai 20:28; Yoane 3:16; 17:3.
Kasi, ezali na makambo mingi oyo tosengeli koyeba na ntina na sekele yango, kasi kaka te ete Nzambe aponaki Yesu azala Moyangeli ya Bokonzi na ye. Na kati ya sekele mosantu yango ezali na likambo mosusu oyo: bato mosusu, mibali mpe basi, bakozala na likoló elongo Baefese 1:8-12.
na Yesu oyo asekwaki. Bakoyangela elongo na Yesu na likoló!—Tiká tótalela bankombo ya bato mosusu oyo bakoyangela na Yesu na likoló. Yesu ayebisaki bantoma na ye ya sembo ete azali kokende na likoló mpo na kobongisela bango esika. (Yoane 14:2, 3) Soki otaleli mikapo oyo elandi, okomona bankombo ya mwa ndambo ya mibali mpe basi oyo bakoyangela elongo na Yesu na Bokonzi ya Tata na ye.—Matai 10:2-4; Marko 15:39-41; Yoane 19:25.
Na boumeli ya ntango molai, eyebanaki te soki bato boni bakoyangela na likoló elongo na Yesu na Bokonzi na ye. Kasi, sikoyo toyebi motángo yango. Oyebi yango?— Biblia elobi ete bazali bato 144 000. Yango mpe ezali na kati ya sekele mosantu.—Emoniseli 14:1, 4.
Ondimi ete “sekele mosantu ya Bokonzi ya Nzambe” ezali sekele ya malamu mingi oyo moto nyonso akoki koyeba?— Soki ezali bongo, tiká tóluka koyeba makambo nyonso oyo etaleli sekele yango mpo tózala na likoki ya kolimbola yango epai ya bato mingi.
^ par. 3 Ntango ozali kotánga na mwana na yo mpe bomoni mwa mokɔlɔtɔ oyo (—) na nsima ya motuna, bosengeli kopema mpe osengeli kosɛnga mwana abimisa makanisi na ye.