Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MIKILI MPE BATO

Mobembo moko na Salvador

Mobembo moko na Salvador

NTANGO bato ya Espagne bayaki na oyo ebengamaka lelo Salvador eleki mbula soki 500, bato oyo balekaki mingi na ekólo yango bazalaki kobenga teritware na bango Cuscatlán, oyo elimboli “Mokili ya biju.” Lelo oyo, bato mingi ya Salvador bazali bankɔkɔ ya bankolo-mabele mpe ya bato ya Mpoto oyo bayaki kokonza mboka yango.

Bato ya Salvador bayebani mpo na ezaleli na bango ya boboto mpe limemya. Bazalaka mpe makasi na mosala. Bato bapesanaka mbote na limemya, balobaka “Buenos días” (mbote) to “Buenas tardes” (nsima ya nzanga malamu) liboso ya kobanda lisolo to ntango bakɔti na magazini. Kutu, bato ya Salvador oyo bafandaka na bamboka mpe na mwa bingumba bamonaka ete koleka moto na nzela kozanga kopesa ye mbote ezali kozanga limemya.

Kafe etiká mpenza nsango na istware ya Salvador

Bilei oyo bato ya Salvador balingaka mingi ezali pupusa; ezali farini ya masango (to loso) oyo basalaka yango lokola limpa, basangisaka yango na fromaje mpe madesu, mpe ngulu to biloko mosusu. Mbala mingi balyaka yango na supu ya tomati mpe curtido, oyo basangisaka choux, carotte, matungulu, mpe vinɛgrɛ. Atako bato mosusu balyaka yango na mbeli ná nkanya, kasi momeseno ya mboka yango esɛngaka kolya yango na mabɔkɔ.

Pupusas ezali biloko oyo bato mingi ya Salvador balyaka

Chute ya Los Tercios, Suchitoto

OYEBAKI YANGO? Salvador ebengami mokili ya ba-volcan. Ezali na ba-volcan koleka 20, mosusu ebimisaka mɔtɔ. Mai oyo chute ya Los Tercios ebwakaka, eutaka likoló ya makonzí ya milai ya mabanga oyo esalemá mpo na pɔtɔpɔtɔ oyo mɔtɔ ya volcan ebimisaka.

Batatoli ya Yehova na Salvador bazali koleka 38 000 mpe bazali na masangá soki 700. Bayekolaka Biblia na bato soki 43 000 na Espagnol, Anglais, mpe na elobeli ya bajɛstɛ ya Salvador.