Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA ELOBI NINI?

Mbongo

Mbongo

Mbongo nde ebimisaka makambo nyonso ya mabe?

“Bolingo ya mbongo ezali mosisa ya makambo mabe ya ndenge nyonso.”​1 Timote 6:10.

OYO BATO MOSUSU BALOBAKA

Mbongo ezali mosisa ya makambo nyonso ya mabe.

OYO BIBLIA ELOBI

“Bolingo ya mbongo”​—kasi te mbongo yango moko—​nde ebimisaka “makambo mabe.” Na Biblia, Mokonzi Salomo oyo azalaki na bozwi mingi alobeli makambo misato ya mabe oyo mbala mingi ekómelaka bato oyo balingá mbongo. Komitungisa: “Ebele ya biloko ya mozwi epesaka ye mpɔngi te.” (Mosakoli 5:12) Kozanga kosepela na oyo ozali na yango: “Moto oyo alingá palata akotonda palata te, mpe moto alingá bozwi akotonda mpe lifuti te.” (Mosakoli 5:10) Kokwea na motambo ya kobuka mibeko: “Ye oyo azali kowela kozwa bomɛngo akozanga te kozwa likambo.”​—Masese 28:20.

Mbongo ezalaka na ntina nini?

“Mbongo ebatelaka.”​Mosakoli 7:12.

OYO BATO MOSUSU BALOBAKA

Mbongo ebatelaka mpe esalaka ete moto azala na esengo.

OYO BIBLIA ELOBI

Ndenge bato balobaka ete mbongo esombaka esengo mpe ebatelaka ezali na kati ya “nguya ya bokosi ya bomɛngo.” (Marko 4:19) Ata bongo, “mbongo nde ekataka makambo nyonso.” (Mosakoli 10:19) Na ndakisa, mbongo ekoki kosomba biloko oyo osengeli na yango mpo ozala na bomoi; biloko ya kolya mpe nkisi ya monganga.​—2 Batesaloniki 3:12.

Mbongo esalisaka mpe yo okokisa bamposa ya libota na yo. Na yango, Biblia elobi ete: “Soki moto azali te kopesa bato na ye, mpe mingimingi bato ya ndako na ye, biloko oyo basengeli na yango, awangani kondima.”​—1 Timote 5:8.

Ndenge nini okoki kosalela mbongo malamu?

“Fandá liboso mpo na koyeba mosolo boni yango ekosɛnga.”​Luka 14:28.

OYO BIBLIA ELOBI

Salelá mbongo na ndenge oyo ekosala ete Nzambe andima yo. (Luka 16:9) Ezali malamu kosalela mbongo na ndenge ebongi mpe na bosembo. (Baebre 13:18) Mpo na koboya mindɔndɔ ya koluka makambo oyo eleki makoki na yo, “bomoi na [yo] ezala na bolingo ya mbongo te.”​—Baebre 13:5.

Atako Biblia epekisi te kokɔta nyongo, epesi nde likebisi oyo: “Modefi azali mosaleli ya moto oyo azali kodefisa.” (Masese 22:7) Boyá kosomba biloko bisombelá, mpo “moto nyonso oyo asalaka makambo mbangumbangu akokelela mpenza kokelela.” (Masese 21:5) Kasi, ‘bombá mwa eloko pembeni na kotalela biloko oyo ozali na yango’ mpe bombá mbongo mpo na makambo oyo ezali na ntina mpo na yo.​—1 Bakorinti 16:2.

Biblia elendisi biso ‘tópesaka.’ (Luka 6:38) Bato oyo bazalaka na mposa ya kosepelisa Nzambe, basengeli kozala mabɔkɔ pɛtɛɛ mpo “Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.” (2 Bakorinti 9:7) Na yango, ‘kobosana te kosala malamu mpe kokabela bamosusu biloko, mpo Nzambe asepelaka mpenza na bambeka ya ndenge wana.’​—Baebre 13:16.