Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mai ya miso na biso ezali mpenza likamwisi

Mai ya miso na biso ezali mpenza likamwisi

TOBANDAKA kolela kaka mokolo oyo tobotami. Moto moko ya mayele alobi ete ntango tozalaki naino babebe, kolela nde ekómaki lokola “nsinga ya motɔlu oyo ekangisaka mama ná mwana na zemi,” mpo tozalaki kolela mpo bákipe biso to bákokisa bamposa na biso. Kasi, mpo na nini tokobaka kobimisa mai ya miso ntango tozali kokola, nzokande tokoki komonisa ndenge tozali komiyoka na lolenge mosusu?

Mai ya miso oyo tobimisaka mpo na esengo to mawa ebimaka mpo na bantina ndenge na ndenge. Tokoki kolela mpo toyoki mpasi na motema, kobanga to mpo tozali konyokwama na nzoto to na makanisi. Kasi esengo makasi, motema kokita mpe kolonga likambo moko esalaka mpe ete tóbimisa mai ya miso; yango ezalaka mpisoli ya esengo. Kolela na biso ekoki mpe kotinda bamosusu bálela. María alobi boye: “Soki namoni moto moko azali kolela, ezala mpo na likambo nini, etindaka ngai kaka nalela.” Mbala mosusu osí olelá mpo na likambo moko boye oyo otalaki na filme to otángaki na buku moko.

Ezala mpo na ntina nini, kolela ezali elobeli moko oyo ezali na nguya ata soki ezangá maloba. Buku moko (Adult Crying) elobi boye: “Kaka na kolela, moto akoki koloba na ntango moke makambo mingi oyo akokaki koloba te na ndenge mosusu.” Mpisoli etindaka bato básala mwa eloko. Na ndakisa, ezalaka mpasi tókanga motema na mpisoli ya mawa oyo moto moko azali kobimisa mpo etindaka biso tómona ete moto yango azali konyokwama. Yango wana, tóluka kobɔndisa to kosalisa moto oyo azali kolela.

Bato mosusu ya mayele bamoni ete kolela ezali lolenge ya malamu ya komonisa ndenge oyo tozali komiyoka mpe kokanga kolela ekoki kobebisa kolɔngɔnɔ ya nzoto na biso. Bamosusu balobi ete siansi emonisi naino mpenza te matomba oyo kolela ememelaka moto na nzoto to na makanisi. Ata bongo, baankɛtɛ emonisi ete basi mingi (85%) mpe mibali mingi (73%) balobi ete bamiyokaka malamu nsima ya kolela. Noemí alobi boye: “Na bantango mosusu nayebaka ete nasengeli kolela. Na nsima, nakoki kokitisa motema mpe komona lisusu makambo polele, ndenge mpenza likambo yango ezali.”

Baankɛtɛ emonisi ete basi mingi (85%) mpe mibali mingi (73%) balobi ete bamiyokaka malamu nsima ya kolela

Kasi mpo moto akitisa motema, esɛngi kaka te alela. Ndenge oyo bato mosusu basalaka ntango tozali kolela, ezalaka mpe na ntina mingi. Na ndakisa, ntango mpisoli na biso etindi basusu bábɔndisa biso to básalisa biso, ekitisaka biso motema. Kasi, soki etindi bango básala eloko te, toyokaka nsɔni to tomonaka ete basundoli biso.

Ezali polele ete, ntina mpenza oyo tobimisaka mpisoli ezali kaka libombami. Toyebi kaka ete kobimisa mai ya miso ezali lolenge moko ya komonisa ndenge oyo tozali komiyoka; likoki oyo Nzambe apesá biso.