Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 42: Mpunda ya elobi

Lisolo 42: Mpunda ya elobi

OYOKÁ mpunda ezali koloba? ‘Ekoki kosalema te! Banyama balobaka te.’ Nzokande, Biblia elobi ete mpunda moko elobaki. Yango ebandaki ndenge nini?

Anzelu

Bayisraele bakómi pene na mokili ya Kanana mpe bafandi na mokili patatalu ya Moabe. Kasi Balake, mokonzi ya Moabe, akómi kobanga Bayisraele. Atindi bato epai ya Balaama, oyo azali nganga-nkisi mpo alakela Yisraele mabe. Balake alaki ete akopesa ye mbongo mingi mpenza. Balaama andimi, amati na mpunda na ye mpe akei epai ya Balake.

Yehova alingi te ete Balaama alakela Yisraele mabe. Yango wana, atindi anzelu moko na mopanga ya molai atɛlɛma na nzela mpo apekisa ye. Balaama amoni anzelu te, kasi mpunda na ye emoni anzelu yango. Yango wana, eluki nzela ya kokima anzelu kasi esimbi te. Nsukansuka, mpunda elali na nse ya Balaama. Balaama asiliki makasi mpe abɛti mpunda yango na nzete na ye.

Na ntango yango, Yehova alobisi mpunda ya Balaama, mpe mpunda yango etuni ye ete: ‘Ngai nasali yo nini mpo obɛta ngai?’

Balaama likoló ya mpunda

Balaama azongisi ete: ‘Okómisi ngai lokola zoba. Soki nazalaka na mopanga mbɛlɛ nabomi yo.’

Mpunda etuni ye: ‘Nasalaka yo boye liboso?’

Balaama azongisi ete: ‘Te.’

Na ntango yango Yehova afungoli Balaama miso, amoni anzelu atɛlɛmi na nzela, asimbi mopanga. Anzelu alobi na ye ete: ‘Mpo na nini obɛti mpunda na yo? Nayei nde kopekisa yo mpo olakela Yisraele mabe te. Soki mpunda na yo ekimaka te mbɛlɛ nabomi yo mpe natiki yango.’

Balaama azongisi ete: ‘Nasali lisumu. Nayebaki te ete otɛlɛmi na nzela.’ Anzelu atiki Balaama akende epai ya Balake. Balaama asali nyonso alakela Yisraele mabe, kasi Yehova ayebisaki ye nde ete apambola Yisraele, mpe apamboli bango mbala misato mobimba.

Mitángo 21:21-35; 22:1-40; 23:1-30; 24:1-25.



Mituna

  • Balake azali nani, mpe mpo na nini atindi bato bábenga Balaama?
  • Mpo na nini mpunda ya Balaama elali na nse?
  • Balaama ayoki mpunda elobi nini?
  • Anzelu moko alobaki na Balaama nini?
  • Likambo nini esalemaki ntango Balaama amekaki kolakela Yisraele mabe?

Mituna mosusu