Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 54: Aleki bato nyonso na makasi

Lisolo 54: Aleki bato nyonso na makasi

BOYEBI nkombo ya moto oyo aleki bato nyonso na makasi? Moto yango azalaki mosambisi, nkombo na ye Samsone. Makasi na ye eutaki epai ya Nzambe. Liboso kutu Samsone abotama, Yehova ayebisaki mama na ye ete: ‘Mosika te okobota mwana mobali. Ye akobikisa Yisraele na mabɔkɔ ya Bafilistia.’

Samsone azali kobunda na nkɔsi

Bafilistia ezali bato mabe oyo bazalaki kofanda na Kanana. Bazalaki na mibali ya etumba ebele, mpe bazalaki mpenza konyokola Bayisraele. Mokolo moko, Samsone azalaki kokende epai ya Bafilistia, nkɔsi moko ebimeli ye, ezali koganga. Bongo Samsone abomi nkɔsi yango kaka na mabɔkɔ. Abomi mpe ebele ya Bafilistia.

Na nsima, Samsone alingi mwasi moko nkombo na ye Delila. Bakonzi ya Bafilistia balaki ete bakopesa mwasi yango moto na moto shekele ya palata nkóto moko na nkama moko (1 100) soki ayebisi bango sekele ya makasi ya Samsone. Delila azali na mposa ya mbongo nyonso wana. Alingi Samsone mpenza te, alingi mpe basaleli ya Nzambe te. Yango wana, azali ntango nyonso kotungisa Samsone ete ayebisa ye sekele ya makasi na ye.

Delila ná Samsone

Nsukansuka, Samsone ayebisi Delila sekele ya makasi na ye. Alobi na ye ete: ‘Nsuki na ngai ekatamaka te, mpo banda kobotama na ngai, Nzambe aponá ngai nazala Monaziri na ye. Soki bakati ngai nsuki, makasi na ngai mpe ekosila.’

Lokola Delila amoni ete Samsone afungoleli ye motema, alalisi ye na mabɔlɔngɔ na ye. Na nsima, abengi mobali moko aya kokata ye nsuki. Ntango Samsone alamuki, makasi ezali lisusu te. Bafilistia bakangi ye, batɔbɔli ye miso nyonso mibale mpe bakómisi ye moombo na bango.

Samsone azali kobuka makonzí minene ya ndako

Mokolo moko boye, Bafilistia basali fɛti mpo na nzambe na bango Dagone; babimisi Samsone na bolɔkɔ bayei na ye mpo asɛkisa bango. Nzokande nsuki na ye ekoli lisusu. Samsone alobi na elenge mobali oyo asimbaki ye na lobɔkɔ ete: ‘Tiká nasimba makonzí oyo esimbi ndako.’ Bongo Samsone asɛngi Nzambe apesa ye lisusu makasi. Na nsima, asimbi makonzí ya ndako mpe agangi ete: ‘Tiká nakufa elongo na Bafilistia!’ Bafilistia nkóto misato (3 000) bazalaki na fɛti yango. Ntango Samsone atindiki makonzí ya ndako, ndako ekwei mpe ebomi bato nyonso oyo bazalaki na kati.

Basambisi mikapo 13 tii 16.



Mituna

  • Boyebi nkombo ya moto oyo alekaki bato nyonso na makasi kino lelo, mpe nani apesaki ye makasi yango?
  • Na ndenge oyo bozali komona na elilingi oyo, mokolo moko Samsone asalaki nkɔsi moko ya monene nini?
  • Na elilingi oyo, sekele nini Samsone azali koyebisa Delila, mpe na ndenge nini likambo yango esalaki ete Bafilistia bákanga ye?
  • Ndenge nini Samsone abomaki banguna na ye Bafilistia 3 000 na mokolo oyo akufaki?

Mituna mosusu