Masese 6:1-35

  • Zalá ekɛngɛ ntango omipesi ndanga (1-5)

  • “Kende epai ya furmi, yo moto ya gɔigɔi” (6-11)

  • Moto ya mpambampamba mpe ya mabe (12-15)

  • Makambo nsambo oyo Yehova ayinaka (16-19)

  • Kebá na mwasi mabe (20-35)

6  Mwana na ngai, soki omipesi ndanga mpo na mozalani na yo,+Soki osali boyokani na moto oyo oyebi te,+   Soki ozwami na motambo na elaka na yo,Soki okangami na maloba ya monɔkɔ na yo,+   Salá boye, mwana na ngai, mpe omibikisa,Mpo okwei na lobɔkɔ ya mozalani na yo: Kende epai na ye, mpe na komikitisa nyonso sɛngá ye ayokela yo mawa.+   Kotika te miso na yo ezwa mpɔngi,To mpe miso na yo ekangama.   Omibikisa lokola mboloko na lobɔkɔ ya mobomi-nyama,Lokola ndɛkɛ na lobɔkɔ ya mokangi-ndɛkɛ.   Kende epai ya furmi,yo moto ya gɔigɔi;+Talá malamu banzela na yango mpe kómá moto ya bwanya.   Atako ezalaka na komanda te, kapita te to mokonzi te,   Ebongisaka bilei na yango na eleko ya molunge,+Mpe eyanganisaka biloko na yango ya kolya na ntango ya kobuka mbuma.   Yo moto ya gɔigɔi, okokoba kolala tii ntango nini? Okolamuka na mpɔngi na yo ntango nini? 10  Mwa mpɔngi moke, kokanga liso mwa moke,Kokanga mabɔkɔ mwa moke mpo na kopema,+ 11  Mpe bobola ekoyela yo lokola moyibi,Mpe kokelela na yo lokola moto oyo asimbi bibundeli.+ 12  Moto ya mpambampamba mpe ya mabe, atambolaka na maloba ya bokosi;+ 13  Afinafinaka liso na ye,+ asalaka bilembo na makolo na ye mpe alakisalakisaka namisapi na ye. 14  Motema na ye esepelaka na lokuta,Akanaka ntango nyonso kosala likambo ya mabe+ mpe abimisaka kowelana.+ 15  Yango wana likama na ye ekoya mbalakaka;Akobukana na mbala moko, mpe elikya ya kobikisama ekozala te.+ 16  Ezali na makambo motoba oyo Yehova ayinaka;*Ɛɛ, makambo nsambo oyo ayinaka mpenza: 17  Miso ya lolendo,+ lolemo ya lokuta+ mpe mabɔkɔ oyo esopaka makila ya moto oyo azali na likambo te,+ 18  Motema oyo ekanaka kosala mabe,+ mpe makolo oyo epotaka mbangu mpo na kosala mabe, 19  Motatoli oyo alobaka lokuta ntango nyonso,+Mpe moto oyo abimisaka kowelana na kati ya bandeko.+ 20  Mwana na ngai, batelá mitindo ya tata na yo,Mpe kotika te mateya* ya mama na yo.+ 21  Batelá yango ntango nyonso na motema na yo;Kangá yango na nkingo na yo. 22  Ntango okotambola epai na epai, ekokamba yo;Ntango okolala,ekokɛngɛla yo;Mpe ntango okolamuka, ekolobela yo.* 23  Mpo mitindo ezali mwinda,+Mobeko ezali pole,+Mpamela mpe disiplini ezali nzela ya bomoi.+ 24  Ekobatela yo na mwasi mabe,+Na maloba sukali ya mwasi ya pite.*+ 25  Kolula kitoko na ye na motema na yo te+Mpe kotika te ete miso na ye ya kolengola ebenda yo, 26  Mwasi ya ndumba akokómisa moto mobola mpenza, tii akotikala kaka na mwa limpa,+Kasi mwasi ya libala akokanga bomoi ya motuya. 27  Moto akoki nde kotya mɔtɔ na ntolo na ye bongo bilamba na ye ezika te?+ 28  To moto akoki nde kotambola likoló ya makala ya mɔtɔ bongo makolo na ye ezika te? 29  Ezali ndenge moko mpe na moto oyo asangisi nzoto na mwasi ya mozalani na ye;Moto oyo asimbi ye akozanga te kozwa etumbu.+ 30  Batyolaka moyibi teSoki ayibi mpo azali na nzala.* 31  Kasi, soki azwami, akofuta mbala nsambo;Akopesa biloko nyonso ya motuya ya ndako na ye.+ 32  Moto nyonso oyo asali ekobo na mwasi azangi bososoli;*Moto oyo azali kosala yango azali komisala mabe.+ 33  Akozwa mpasi ná nsɔni,+Mpe nsɔni na yeekolongwa te.+ 34  Mpo zuwa epesaka mobali nkanda makasi,Akoyoka mawa te ntango akozongisa mabe.+ 35  Akondima eloko te ata soki opesi ye mbongo;Akondima kosala kimya te, ata soki opesi ye likabo ya motuya nini.

Maloba na nse

To, “molimo na ye eyinaka.”
To, “mobeko.”
To, “ekoteya yo.”
Lil., “mwasi mopaya.” Talá Mas 2:16.
To, “mpo atondisa molimo na ye.”
Lil., “azali na motema te.”