Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndenge nini okoki kolongola nsɔmɔ ya liwa?

Ndenge nini okoki kolongola nsɔmɔ ya liwa?

Eyano ya Biblia

 Biso bato tobangaka liwa mpo ezali monguna, mpe tosalaka nyonso oyo tokoki mpo na kobatela bomoi na biso. (1 Bakorinti 15:26) Kasi, kozala na nsɔmɔ ya liwa oyo euti na mateya ya lokuta mpe biyambayamba etyaka bato na “boombo bomoi na bango mobimba.” (Baebre 2:15) Koyeba solo na oyo etali liwa ekopekisa yo ozala na nsɔmɔ ya liwa, oyo ekoki kolongola yo esengo ya kozala na bomoi.​—Yoane 8:32.

Solo na oyo etali liwa

  •   Bato oyo bakufá bayebaka eloko te. (Nzembo 146:4) Osengeli te kobanga ete okonyokwama to okomona mpasi soki okufi, mpo Biblia elobi ete liwa ezali lokola mpɔngi.​—Nzembo 13:3; Yoane 11:11-14.

  •   Bato oyo bakufá bakoki kosala biso mabe te. Ata baoyo bazalaki mpenza banguna na biso “bazangi makasi kati na liwa.” (Masese 21:16) Biblia elobi ete “koyina na bango ná zuwa na bango esili.”​—Mosakoli 9:6.

  •   Liwa esukisaka makambo nyonso te. Na nzela ya lisekwa, Nzambe akozongisa na bomoi bato oyo bakufá.​—Yoane 5:28, 29; Misala 24:15.

  •   Nzambe alaki ete ekozala na ntango moko oyo “liwa ekozala lisusu te.” (Emoniseli 21:4) Mpo na ntango yango, Biblia elobi: “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko”; moto moko te akozala lisusu na nsɔmɔ ya liwa.​—Nzembo 37:29.