Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ngɔndɔ Maria​—Biblia elobi nini mpo na ye?

Ngɔndɔ Maria​—Biblia elobi nini mpo na ye?

 Eyano ya Biblia

 Biblia elobi ete Maria, mama ya Yesu azwaki libaku oyo ekokani na mosusu te ndenge abotaki Yesu ntango azalaki naino ngɔndɔ. Biblia esakolaki likamwisi yango na mokanda ya Yisaya mpe Evanzile ya Matai ná ya Luka elobeli kokokisama ya esakweli yango.

 Na esakweli moko oyo elobelaki kobotama ya Masiya, Yisaya alobaki boye: “Talá! Elenge mwasi akozwa mpenza zemi, mpe akobota mwana mobali.” (Yisaya 7:14) Na litambwisi ya elimo ya Nzambe, Matai mokomi ya Evanzile asalelaki esakweli ya Yisaya mpo na kolobela ndenge Maria azwaki zemi ya Yesu. Nsima ya koloba ete Maria azwaki zemi na ndenge ya likamwisi, Matai abakisaki boye: “Nyonso wana esalemaki mpo maloba oyo Yehova alobaki na nzela ya mosakoli na ye ekokisama: ‘Talá! Ngɔndɔ a akozwa zemi mpe akobota mwana mobali, mpe bakopesa ye nkombo Emanuele,’ oyo soki babongoli elakisi, “Nzambe azali na biso.’”​—Matai 1:22, 23.

 Luka, mokomi mosusu ya Evanzile alobelaki mpe zemi oyo Maria azwaki na ndenge ya likamwisi. Akomaki ete Nzambe atindaki anzelu Gabriele “epai ya ngɔndɔ moko oyo mobali moko na nkombo Yozefe moto ya ndako ya Davidi alaká libala; mpe nkombo ya ngɔndɔ yango Maria.” (Luka 1:26, 27) Maria ye moko mpe andimaki ete azalaki ngɔndɔ. Nsima ya koyoka ete akokóma mama ya Yesu, Masiya, Maria atunaki boye: “Ndenge nini yango ekosalema, mpo nasangisá naino nzoto na mobali te?”​—Luka 1:34.

 Ndenge nini ngɔndɔ akokaki kobota?

 Maria azwaki zemi na nzela ya elimo santu, oyo ezali nguya ya Nzambe. (Matai 1:18) Anzelu ayebisaki Maria boye: “Elimo santu ekoyela yo, mpe nguya ya Oyo-Aleki-Likoló ekozipa yo. Yango wana mpe mwana oyo akobotama akobengama mosantu, Mwana ya Nzambe.” b (Luka 1:35) Nzambe alongolaki bomoi ya Mwana na ye na likoló na ndenge ya likamwisi mpe atyaki yango na libumu ya Maria mpe yango esalaki ete azwa zemi.

 Mpo na nini ngɔndɔ abotaki?

 Nzambe asalelaki ngɔndɔ mpo Yesu abotama na nzoto ya kokoka oyo ekopesa ye nzela ya kobikisa bato na lisumu mpe na liwa. (Yoane 3:16; Baebre 10:5) Nzambe alongolaki bomoi ya Yesu na likoló mpe atyaki yango na libumu ya Maria. Na nsima, elimo santu ya Nzambe ezipaki mwana oyo azalaki kosalama na kati ya libumu mpo azwa ata moke te kozanga kokoka.​—Luka 1:35.

 Na ndenge yango, Yesu abotamaki moto ya kokoka, ndenge Adama azalaki liboso ete asala lisumu. Biblia elobi ete Yesu: “Asalaki lisumu te.” (1 Petro 2:22) Lokola azalaki moto ya kokoka, Yesu akokaki kofuta lisiko mpo na kosomba bato na lisumu mpe na liwa.​—1 Bakorinti 15:21, 22; 1 Timote 2:5, 6.

 Maria atikalaki kaka ngɔndɔ?

 Biblia eteyaka te ete Maria atikalaki kaka ngɔndɔ bomoi na ye mobimba. Kutu, emonisi ete Maria abotaki mpe bana mosusu.​—Matai 12:46; Marko 6:3; Luka 2:7; Yoane 7:5.

Biblia emonisaka ete Yesu azalaki na baleki

 Kobotama ya Yesu na mwasi oyo azalaki ngɔndɔ elakisi ete Maria “abotamaki na lisumu-lisango te”?

 Te. Buku moko (New Catholic Encyclopedia) elobi ete koteya ete Maria abotamaki na lisumu-lisango te “elakisi ete banda ntango azalaki naino na libumu ya mama na ye, ngɔndɔ Maria azwaki te LISUMU OYO TOSANGOLÁ EPAI YA BABOTI NA BISO YA LIBOSO. Bato nyonso babotamaka na lisumu . . . Kasi kaka Maria nde azwaki NGƆLU ya kobatelama na lisumu yango.” c

 Kasi, na Biblia, ezali ata na esika moko te oyo elobi ete Maria abotamaki te na lisumu oyo moto nyonso azwá epai ya Adama ná Eva. (Nzembo 51:5; Baroma 5:12) Kutu, Maria amonisaki ete azalaki moto ya masumu ntango apesaki mbeka ya kozipa masumu oyo Mibeko ya Moize esɛngaki epai ya bamama. (Balevi 12:2-8; Luka 2:21-24) Buku yango (New Catholic Encyclopedia) elobi: “Biblia elobeli polele te liteya ya kozanga lisumu-lisango . . . [Ezali] liteya oyo lingomba ebimisá.”

 Ndenge nini tosengeli kotalela Maria?

 Maria atiká ndakisa malamu na likambo etali kondima, botosi, komikitisa mpe kolinga Nzambe na motema mobimba. Azali na molɔngɔ ya bato ya sembo oyo tosengeli komekola.​—Baebre 6:12.

 Kasi, atako azwaki mokumba kitoko ya kozala mama ya Yesu, Biblia elobi te ete tosengeli kosambela Maria. Yesu apesaki te mama na ye lokumu moko boye ya sipesiale; ayebisaki mpe te bayekoli na ye básala bongo. Kutu, longola masolo ya Baevanzile oyo elobeli Maria mpe vɛrsɛ mosusu na Misala ya bantoma, mikanda 22 oyo etikali, na eteni oyo ebengamaka Testama ya Sika, etángi Maria ata na esika moko te.​—Misala 1:14.

 Biblia emonisi te ete bato batyelaki Maria likebi moko boye ya sipesiale to ete bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kosambela ye. Kutu, Biblia eteyaka ete bakristo basengeli kosambela kaka Nzambe.​—Matai 4:10.

a Maloba ya Ebre oyo ebongolami na “elenge mwasi” na esakweli ya Yisaya ezali almah, oyo ekoki kolimbola mwasi oyo azali ngɔndɔ to azali ngɔndɔ te. Kasi, na litambwisi ya elimo santu, Matai asalelaki liloba ya sikisiki ya Grɛki parthenos oyo elimboli “ngɔndɔ.”

b Bato mosusu baboyaka ebengeli “Mwana ya Nzambe,” mpo bamonaka ete yango elakisi Nzambe asangisaki nzoto na mwasi. Kasi, Biblia eteyaka likanisi yango te. Kutu, Biblia ebengi Yesu “Mwana ya Nzambe” mpe “mwana ya liboso na biloko nyonso oyo ezalisamá” mpo kaka ye nde azali ekelamu ya liboso oyo Nzambe ye moko akelaki. (Bakolose 1:13-15) Biblia ebengi mpe Adama “mwana ya Nzambe.” (Luka 3:38) Ezali mpo Nzambe akelaki Adama.

c Ebimeli ya mibale, Volimi 7, lokasa 331.