Lakisá makambo oyo ezali na kati

Maria azali mama ya Nzambe?

Maria azali mama ya Nzambe?

Eyano ya Biblia

 Te, Biblia eteyaka te ete Maria azali mama ya Nzambe, elobi mpe te ete bakristo basengeli kosambela Maria. a Tótala naino:

  •   Maria alobaki ata mokolo moko te ete azalaki mama ya Nzambe. Biblia elobi ete abotaki nde “Mwana ya Nzambe,” kasi Nzambe ye moko te.​—Marko 1:1; Luka 1:32.

  •   Yesu Kristo alobaki ata mokolo moke te ete Maria azalaki mama ya Nzambe to bato basengeli kosambela ye. Kutu, asembolaki mwasi moko oyo akumisaki mokumba ya Maria ya kozala mama na ye, na maloba oyo: “Te, Esengo nde na baoyo bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe kotosa yango!”​—Luka 11:27, 28.

  •   Maloba “Mama ya Nzambe” mpe Theotokos (Oyo aboti Nzambe) ezali na Biblia te.

  •   Na Biblia, maloba “Mokonzi-mwasi ya likoló” elobelaka Maria te, kasi elobelaka nde nzambe-mwasi ya lokuta oyo Bayisraele oyo bakómaki bapɛngwi bazalaki kosambela. (Yirimia 44:15-19) “Mokonzi-mwasi ya likoló” yango ekoki kozala Ishtar (Astarte), nzambe-mwasi ya bato ya Babilone.

  •   Bakristo ya siɛklɛ ya liboso basambelaki Maria te, mpe bapesaki ye te lokumu ya ndenge mosusu. Moto moko ya istware alobi ete bakristo ya liboso “baboyaki mpenza losambo ya bikeko mpe bazalaki kobanga ete kopesa Maria lokumu ya ndenge mosusu esala ete losambo na bango ekokana na losambo moko boye ya nzambe-mwasi.”​—In Quest of the Jewish Mary.

  •   Biblia elobaka ete Nzambe azali na ebandeli te mpe na nsuka te. (Nzembo 90:1, 2; Yisaya 40:28) Lokola azali na ebandeli te, akoki kozala na mama te. Longola yango, Maria akokaki te komema Nzambe na libumu na ye mpo Biblia emonisi polele ete ata likoló ezali kokoka ye te.​—1 Bakonzi 8:27.

Maria azali mama ya Yesu kasi “mama ya Nzambe” te

 Maria abotamaki Moyuda, mpe azalaki mokitani ya Mokonzi Davidi. (Luka 3:23-31) Nzambe amoniselaki ye boboto mingi mpo na kondima na ye mpe azalaki kokangama na Nzambe. (Luka 1:28) Nzambe aponaki ye mpo azala mama ya Yesu. (Luka 1:31, 35) Maria ná mobali na ye Yozefe babotaki mpe bana mosusu.​—Marko 6:3.

 Atako Biblia emonisi ete Maria akómaki moyekoli ya Yesu, kasi elobi makambo mosusu te mpo na ye.​—Misala 1:14.

a Mangomba mingi eteyaka ete Maria azali mama ya Nzambe. Mbala mosusu babengaka ye “Mokonzi-mwasi ya likoló” to Theotokos, liloba ya Grɛki oyo elimboli “Oyo aboti Nzambe.”