Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia ekoki kosalisa na makambo etali mbongo mpe banyongo?

Biblia ekoki kosalisa na makambo etali mbongo mpe banyongo?

Eyano ya Biblia

 Ɛɛ. Makanisi oyo elandi, oyo ezali na Biblia ekoki kosalisa yo na makambo etali mbongo mpe banyongo:

  1.   Kanisá liboso ya kobimisa mbongo. “Myango ya moto ya etingya ememaka mpenza na litomba, kasi moto nyonso oyo asalaka makambo mbangumbangu akokelela mpenza kokelela.” (Masese 21:5) Kowela kosomba eloko te kaka mpo batye yango mangondo. Kanisá liboso ya kosomba, bongisá ndenge okosalela mbongo to salá budget, mpe kobongola makanisi te.

  2.   Kokɔta nyongo mpambampamba te. “Modefi azali mosaleli ya moto oyo azali kodefisa.” (Masese 22:7) Sikoyo soki ozali na nyongo mpe ozali kokoka kofuta yango te, meká koyebisa moto oyo adefisaki yo yango ete okofuta na nsima. Ata soki aboyi, bondelá ye. Landá toli oyo Biblia epesi moto oyo akɔti nyongo: “Kende komikitisa mpe tyá moninga na yo mbamba. Kotika miso na yo ezwa mpɔngi te, mpe kokanga ata moke te miso na yo.” (Masese 6:1-5) Ata soki mbala ya liboso aboyi koyoka yo, kobá kosɛnga ye abakisela yo mwa mikolo.

  3.   Mbongo ezala na esika ya liboso te na bomoi na yo te. “Moto ya lokoso awelaka kokóma na bomengo noki; ayebaka té ’te bapasi ezali kozela ye.” (Masese 28:22, Bible na lingala ya lelo oyo) Bilulela mpe lokoso etindaka moto akɔta banyongo ebeleebele; ekoki mpe kotinda moto abosana makambo ya Nzambe.

  4.   Sepelá na oyo ozali na yango. “Soki tozali na bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto, tósepela na biloko yango.” (1 Timote 6:8) Mbongo ekoki kosomba esengo te. Bato mosusu oyo bazali na esengo mingi na mokili, bazali bato ya mbongo te. Bazali na esengo mpo balingaka libota na bango, baninga, mpe bazali na boyokani malamu na Nzambe.​—Masese 15:17; 1 Petro 5:6, 7.