Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia elobi nini mpo na bonsomi ya kopona? Bomoi na biso etángamá?

Biblia elobi nini mpo na bonsomi ya kopona? Bomoi na biso etángamá?

Eyano ya Biblia

 Nzambe apesá biso bonsomi ya kopona: yango ezali likoki ya kozwa bikateli biso moko. Makambo oyo ekómelaka biso etángamá te. Biblia elobi nini na likambo yango?

  •   Nzambe akelá bato na elilingi na ye. (Ebandeli 1:26) Bato bazali lokola banyama te, oyo basalaka makambo na mayele ya lɔɔmbi (instinct); biso bato tokelamá na elilingi ya Nzambe, elingi koloba tozali na likoki ya komonisa bizaleli lokola bolingo mpe bosembo. Mpe ndenge moko na Mozalisi na biso, tozali na bonsomi ya kopona.

  •   Mbala mingi biso moko toponaka bomoi oyo tokozala na yango na mikolo ezali koya. Na Biblia, Nzambe alendisi biso ‘tópona bomoi, na koyokáká mongongo ya Nzambe,’ elingi koloba na kotosáká mibeko na ye. (Kolimbola Mibeko 30:19, 20) Kosɛnga biso tópona elingaki kozala na ntina te, to kutu komonisa motema mabe, soki tozalaki na bonsomi ya kopona te. Na esika atindika biso na makasi ete tótosa oyo alobi, Nzambe alobi: “Ee soki otyaka mpenza likebi na mibeko na ngai! Mbɛlɛ kimya na yo ekómi lokola ebale, mpe boyengebene na yo lokola mbonge ya mbu.”​—Yis. 48:18.

  •   Kozala mozwi to mobola etángamá te. Soki tolingi kolonga na likambo moko, tosengeli kosala mosala makasi. Biblia elobi boye: “Nyonso oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na makasi na yo mpenza.” (Mosakoli 9:10) Elobi mpe ete: “Myango ya moto ya etingya ememaka mpenza na litomba.”​—Masese 21:5.

 Bonsomi ya kopona ezali likabo oyo euti na Nzambe. Esalisaka biso tólinga ye na “motema [na biso] mobimba,” mpo tolingi kosala yango.​—Matai 22:37.

Nzambe te nde atambwisaka makambo nyonso?

 Biblia elobi ete Nzambe azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso; nguya na ye ezali na nsuka te mpe na ndelo te. (Yobo 37:23; Yisaya 40:26) Kasi, asalelaka nguya yango mpo na kotambwisa makambo nyonso te. Na ndakisa, Biblia elobi ete Nzambe ‘azalaki kaka komipekisa’ na likambo ya bato ya Babilone ya kala, ekólo oyo ezalaki monguna ya basaleli na ye. (Yisaya 42:14) Ndenge moko mpe, Nzambe azali kokanga motema mpo abebisi naino te bato oyo bazali kosalela bonsomi na bango ya kopona mpo na konyokola basusu. Kasi Nzambe akokanga motema libela na libela te.​—Nzembo 37:10, 11.