Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia ezali nini?

Biblia ezali nini?

Eyano ya Biblia

 Biblia ezali buku oyo ezali na mikanda mosantu 66. Ekomamaki na boumeli ya mbula koleka 1 600. Biblia ezali na nsango ya Nzambe, elingi koloba “liloba ya Nzambe.”​—1 Batesaloniki 2:13.

Na lisolo oyo tokolobela:

 Makambo etali Biblia

  •   Nani akomaki Biblia? Biblia ezali mokanda ya Nzambe, kasi asalelaki mibali soki 40 mpo na kokoma yango. Tokoki kotánga mwa ndambo na bango: Moize, Mokonzi Davidi, Matai, Marko, Luka, mpe Yoane. a Nzambe apesaki bakomi yango makanisi na ye mpo bákoma nsango na ye.​—2 Timote 3:16.

      Tózwa ndakisa oyo: Soki patrɔ asɛngi sɛkrɛtɛrɛ na ye akomela ye mokanda moko, mbala mosusu akoki koyebisa ye kaka mwa makambo ya ntina, tokoloba mokanda yango ezali ya patrɔ, kasi ya sɛkrɛtɛrɛ te. Ndenge moko mpe, atako Nzambe asalelaki bato bákoma nsango na ye, tokoloba ete ye nde Nkolo ya Biblia.

  •   Liloba “Biblia” elimboli nini? “Biblia” euti na liloba ya Grɛki biblia, oyo elimboli “mikanda ya mikemike.” Kendekende, liloba biblia ekómaki kosalelama mpo na kolobela mikanda nyonso ya mikemike oyo basangisi esika moko mpo ekóma Biblia.

  •   Ntango nini bakomaki Biblia? Babandaki kokoma Biblia na mobu 1513 L.T.B. mpe basilisaki kokoma yango na boumeli ya mbula koleka 1 600 na nsima, soki na mobu 98 T.B.

  •   Biblia ya ebandeli oyo bakomá ezali wapi? Makomi ya ebandeli ya Biblia oyo bakomá ata moko te ezali lelo oyo. Ezali mpo bakomi ya Biblia basalelaki biloko oyo ebebaka noki, na ndakisa: papirisi ná mposo ya nyama. Kasi, bakomeli oyo bayebaki mosala na bango basalaki bakopi mpe bakomaki lisusu makomi ya Biblia na boumeli ya basiɛklɛ mingi, babatelaki makambo oyo ezalaki na kati mpo na batángi ya mikolo ezali koya.

  •   “Testama ya Kala” mpe “Testama ya Sika” ezali nini? Babengaka yango mbala mingi Testama ya Kala mpo na komonisa eteni ya Biblia oyo ekomamaki mingimingi na monɔkɔ ya Ebre, eyebani mpe na nkombo Makomami ya Ebre. b Babengaka mbala mingi Testama ya Sika mpo na kolobela eteni oyo ekomamaki na monɔkɔ ya Grɛki, oyo eyebani mpe na nkombo Makomami ya Grɛki ya bokristo. Biteni nyonso mibale wana nde esali buku moko, oyo ebengamaka mpe Makomami mosantu. c

  •   Makambo nini ezali na Biblia? Biblia ezali na biteni ndenge na ndenge oyo elobeli: masolo, mibeko, bisakweli, maloba ya ntoki to poɛmi, masese, nzembo mpe mikanda to nkoma.​—Talá “ Nkombo mpe molɔngɔ ya mikanda ya Biblia.”

 Biblia elobeli makambo nini?

 Biblia elobeli na mokuse ndenge Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akelaki likoló mpe mabele. Na nzela ya Biblia, Nzambe amilakisi na nkombo na ye, Yehova, mpe asɛngi na bato báyeba ye.​—Nzembo 83:18.

 Biblia elimboli ndenge babebisaki lokumu ya Nzambe, mpe emonisi ndenge akosantisa nkombo na ye.

 Biblia emonisi mokano ya Nzambe mpo na bato mpe mabele. Emonisi mpe ndenge Nzambe akolongola na mikolo ezali koya makambo nyonso oyo esalaka ete bato bányokwama.

 Biblia epesi toli na makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo. Na ndakisa:

  •   Kobatela boyokani malamu ná basusu. “Yango wana, makambo nyonso oyo bolingaka bato básalela bino, bino mpe bósalela bango kaka bongo.”​—Matai 7:12.

     Ndimbola: Tosengeli kosalela basusu makambo ndenge tokolinga basusu básalela biso makambo.

  •   Kolonga mitungisi. “Bómitungisa ata moke te mpo na mokolo oyo ekolanda, mpo mokolo oyo ekolanda ekozala na mitungisi na yango moko.”​—Matai 6:34.

     Ndimbola: Na esika ya komitungisa koleka ndelo mpo na makambo ya lobi, ekozala malamu kotya makanisi na makambo ya lelo oyo tozali na yango.

  •   Kozala na libala ya esengo. “Mokomoko na bino mpenza alinga mwasi na ye bongo ndenge amilingaka ye moko; mpe mwasi, asengeli kozala na limemya epai ya mobali na ye.”​—Baefese 5:33.

     Ndimbola: Bolingo mpe limemya ezali na ntina mingi mpo libala elonga.

 Biblia ebongwaná?

 Te. Bato ya mayele oyo balimbolaka maloba ya Biblia balandelaki malamumalamu bamaniskri ya kala ya Biblia mpo na komona soki bokeseni ezali na Biblia ya lelo. Na yango, bamoni ete nsango oyo ezalaki na Biblia ya ebandeli ebongwani te. Ezali likambo ya kokamwa te. Boye, soki Nzambe alingi ete bato bátánga nsango na ye mpe bákanga ntina na yango, ekozala likambo ya bwanya alandela makambo nyonso mpo nsango yango ebongwana te, boye te? d​—Yisaya 40:8.

 Mpo na nini ezali na mabongoli ndenge na ndenge ya Biblia?

 Bato mingi oyo batángaka Biblia lelo oyo bakoki te kokanga ntina ya maloba ya minɔkɔ ya ebandeli oyo bakomaki na yango Biblia. Kutu Biblia ezali na “nsango malamu” mpo na “bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso.” (Emoniseli 14:6) Yango wana, bato bazali na mposa ya mabongoli ya Biblia na minɔkɔ oyo bayebi malamu mpo bákoka kotánga mpe kokanga malamumalamu ntina ya nsango ya Nzambe.

 Mabongoli ya Biblia esɛngaka kolanda mitindo oyo misato ya sikisiki:

  •   Libongoli ya liloba na liloba soki esengeli.

  •   Libongoli ya likanisi na likanisi esalelaka maloba oyo ezali kobimisa likanisi mpenza oyo ezalaki na monɔkɔ ya ebandeli, kasi na lolenge oyo ezali polele mpo na motángi.

  •   Libongoli oyo babengi paraphrase, bato oyo basalaka mabongoli yango babongolaka nsango ya Biblia na ndenge oyo bango bakangi ntina na yango mpe na ndenge bamoni ete ekosepelisa batángi. Kasi, libongoli ya motindo wana ekoki kobebisa nsango oyo ezalaki na kati mpo na kosepelisa bato, na bantango mosusu ekoki kobungisa likanisi ya vɛrsɛ.

 Libongoli ya malamu ya Biblia esalelaka libongoli ya liloba na liloba na bososoli mpo na kopesa bato nsango oyo euti na Nzambe na bosembo nyonso mpe mpo na kosalisa bango bákanga ntina na yango. e

 Nani nde andimaki makambo boye to boye ezala na Biblia?

 Lokola azali Nkolo ya Biblia, Nzambe nde andimaki makambo oyo ekomamaki na Biblia. Aponaki libosoliboso ekólo ya Yisraele mpo na ‘kopesa yango maloba mosantu ya Nzambe,” mpe asalaki ete Bayisraele bábatela Makomami ya Ebre.​—Baroma 3:2.

 Biblia ezangi mikanda mosusu?

 Te. Biblia ezali na mobimba na yango; ezali na mokanda ata moko te “ezangi.” Bato mosusu bakoki koloba ete mikanda mosusu ya kala oyo balongolaki ezalaki na kati ya mikanda ya Biblia. f Kasi, makambo oyo ezali na Biblia emonisi ete Biblia elobaka solo. (2 Timote 1:13) Yango emonisi ete mikanda nyonso ya Biblia oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe ezali na boyokani. Yango wana, ekoki te kolobama ete makomi nyonso ya kala oyo bato mosusu balobaka ezalaki na Biblia, ezali mikanda ya Biblia. g

 Ndenge ya kozwa bavɛrsɛ ya Biblia

  Nkombo mpe molɔngɔ ya mikanda ya Biblia

a Mpo na koyeba liste mobimba ya mikanda ya Biblia, baoyo bakomaki yango, mpe ntango nini bakomaki yango, talá “Etanda ya mikanda ya Biblia.”

b Mwa biteni mosusu ya Biblia ekomamaki na monɔkɔ ya Aramɛyɛ, monɔkɔ oyo ekokanaki na monɔkɔ ya Ebre.

c Batángi mingi ya Biblia basepelaka kosalela maloba “Makomami ya Ebre” mpe “Makomami ya Grɛki ya bokristo.” Maloba yango epesaka te likanisi ete “Testama ya Kala” esilá ngala mpe “Testama ya Sika” ezwá esika na yango.”

e Bato mingi basepelaka kotánga Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika mpo na ndenge esaleli maloba ya sikisiki mpe ezali pɛtɛɛ mpo na kotánga. Talá “Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika ebongolamá malamu?

f Makomi yango nyonso ebengami Apocryphe. Na kotalela buku Encyclopædia Britannica, “makomi nyonso, oyo ezali komonana lokola mokanda oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe, kasi ezali te na kati ya molɔngɔ ya mikanda ya Biblia,” elingi koloba, makomi yango ezali te na kati ya molɔngɔ ya mikanda ya Biblia.

g Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisolo “Les évangiles apocryphes : Des épisodes cachés de la vie de Jésus?