Lakisá makambo oyo ezali na kati

Nsango ya Biblia na mokuse

Nsango ya Biblia na mokuse

Biblia ezali buku oyo ekabolami mingi na mokili, mpe bato mingi bazwaka yango na valɛrɛ mingi. Kasi, okoki komituna: ‘Buku yango ezali kolobela nini?’

Mwa buku Biblia ezali na nsango nini? emonisi polele nsango ya Biblia na mokuse oyo ekoki kosalisa yo mpo okanga na mokuse ntina ya motó ya likambo ya Biblia. Mwa buku yango ezali na nsango ya Biblia na mokuse, kobanda na bozalisi oyo mokanda ya Ebandeli elobeli tii na elikya kitoko mpo na mikolo ezali koya oyo mokanda ya Emoniseli elobeli. Mwa buku yango etandi makambo ndenge elandanaki mpo na komonisa ntango nini makambo yango ya ntina esalemaki. Ezali mpe na bililingi ya kitoko, mpe na mituna oyo ekotinda yo okanisa na mozindo mpo na kolobela yango.

Tángá mwa buku Biblia ezali na nsango nini? na Internet.