Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mokapo ya mokolo

Mokapo ya mokolo

Mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo epesi mokapo moko ya Biblia mpo na mokolo na mokolo, mpe komantɛrɛ mpo na mokapo yango. Mwa buku yango ekoki kosalisa yo obanda mokolo na makanisi malamu mpe ya kolendisa oyo euti na Biblia.

Atako okoki kotánga mokapo yango mpe komantɛrɛ na yango na ngonga nyonso oyo olingi, bato mingi bamonaka malamu kotánga yango na ntɔngɔ. Mpe makanisi na yango ekoki kotikala na motó na yo mokolo mobimba. Soki ozali na libota, bokoki mpe kozwa matomba na mokapo yango soki bozali kotalela yango elongo mokolo na mokolo.

Okoki kotánga mokapo ya mokolo na Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET, to okoki kozwa mikapo nyonso ya mbula mobimba na PDF na site Internet.