Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kampanye moko kitoko na Laponie

Kampanye moko kitoko na Laponie

Ba-Saami, bazali bankolo-mabele oyo bafandaka na teritware monene oyo ebandi na Finlande, Norvège mpe Suède; bazali na bonkɔkɔ, mimeseno mpe minɔkɔ na bango moko ya mboka. Na mikolo euti koleka, Batatoli ya Yehova basalaki makambo mibale mpo na kosakwela bato yango nsango ya Biblia.

Ya liboso, na eleko ya otɔnɛ na 2015, Batatoli ya Yehova babandaki kobimisa mikanda mpe bavideo na monɔkɔ ya Saami. * Ya mibale, na kampanye sipesiale mibale oyo basalaki na 2016 mpe 2017, Batatoli ya Yehova basalaki mibembo na Laponie​—etúká moko ya mosika mpenza epai babateli ya banyama babengi renne batambolaka ná banyama na bango—​mpo na koyebisa bango nsango oyo ebongolami na monɔkɔ ya Saami.

“Mosala ya ntina mpo na bana-mboka”

Na kampanye sipesiale oyo basalaki na sanza ya 05/2017, Batatoli ya Yehova koleka 200 ya Finlande, Norvège mpe ya Suède bamipesaki mpo na kokende na bamboka mikemike oyo ezwami na ebele ya bakilomɛtrɛ karé ya teritware ya Laponie. Mosusu kati na bango bayekolaki mwa bafraze na monɔkɔ ya Saami mpo na komibongisa, likambo oyo esepelisaki Ba-Saami. Denis, oyo amipesaki lokola volontɛrɛ mpo na kosakola na Karigasniemi alobi boye: “Bato ya mboka yango basepelaki na milende tosalaki mpo na koloba monɔkɔ na bango mpe bamonaki ete totyelaki bango mpenza likebi.”

Lokola basepelaka na bazamba mpe banyama, Ba-Saami basepelaki na elaka ya Biblia oyo etali paradiso awa na mabele. (Nzembo 37:11) Na ndakisa, ntango mwasi moko ya mboka yango abandaki boyekoli ya Biblia na lisalisi ya mwa buku Nsango malamu oyo euti na Nzambe! Mpe ayekolaki oyo Nzambe akosalela bato, amitunaki na mongongo makasi mpo na nini pastɛrɛ na bango ayebisá ye te makambo etali paradiso na mabele.

Mingi bamonisaki botɔndi ndenge Batatoli ya Yehova bayaki kotala bango. Motɛki moko apesaki Batatoli ya Yehova mibale oyo ye amonaki longonya. Ayebisaki bango ete bazalaki kosala “mosala moko ya ntina mingi mpo na bana-mboka” mpe abengisaki bango na magazini na ye mpo bázwa eloko nyonso oyo balingi mpo na kolya. Motɛki yango alobaki bápesa eloko te, ye moko akofuta mbongo.

Na boumeli ya kampanye yango, Ba-Saami batalaki bavideo soki 180 mpe bazwaki mikanda koleka 500. Mbala mingi bazalaki kosɛnga mikanda nyonso oyo ezali na monɔkɔ ya mboka na bango. Longola yango, Batatoli ya Yehova babandaki koyekola na Ba-Saami 14 Biblia.

“Mosala ya bato oyo bayebi mpenza mosala”

Ba-Saami mingi oyo batángaki mikanda ya Batatoli ya Yehova basepelaki na ndenge oyo babongolaki mikanda yango. Nilla, Tapiola, oyo azali molakisi mpe moto ya parlema ya Laponie, alobaki boye: “Mikanda na bino ebongolami malamu mpenza.” Alobaki ete mikanda yango “ezali pɛtɛɛ na kotánga mpe ekomami malamu.” Mobali moko oyo afandaka na esika eleki mosika na nɔrdi ya Finlande, alobaki boye: “Emonani polele ete esalemi na bato oyo bayebi mpenza mosala.”

Na Karigasniemi, na ndelo oyo ekaboli Finlande mpe Norvège, Batatoli ya Yehova basololaki na molakisi moko ya Saami liteya ya liboso ya mwa Nsango malamu oyo euti na Nzambe! Lokola asepelaki makasi na ndenge oyo mwa buku yango ebongolamaki, asɛngaki Batatoli ya Yehova ndingisa ya kosalela yango na eteyelo mpo na kolakisa bana-kelasi monɔkɔ ya Saami.

Bavideo mingi mpe batrakte, bakisa mpe mwa buku moko ebongolami na monɔkɔ ya Saami. Site jw.org ebandaki kotya makambo na monɔkɔ ya Saami kobanda 29/02/2016. Sanza nyonso, baoyo balobaka monɔkɔ ya Saami bakɔtaka na site yango mbala koleka 400 mpe bazwaka biloko ya koyoka mpe bavideo koleka 350.

Ezala Ba-Saami mpe bandeko oyo bamipesaki mpo na kosala kampanye yango basepelaki mpenza. Henrick mpe Hilja-Maria oyo basalaki mobembo na Utsjoki, balobaki ete bana-mboka yango bamoni ndenge “Biblia esalisi bango mpenza na makambo mingi.” Lauri ná Inga, oyo basakolaki mpe na Utsjoki, babakisaki boye: “Kampanye oyo ekundwelaki biso ete Nzambe aponaka bilongi te. tozali na esengo ya komonisa bolingo na ye epai ya bato oyo bafandaka na bisika oyo eleki mosika.”

^ par. 3 Ezali na minɔkɔ ndenge na ndenge ya Saami (oyo babengaka yango mpe) minɔkɔ ya Sami. Buku Encyclopædia Britannica elobi ete “monɔkɔ ya Sami ya nɔrdi nde monɔkɔ oyo bato mingi balobaka; elingi koloba na bato nyonso oyo balobaka minɔkɔ ya Sami soki ozwi bato misato, mibale na bango balobaka monɔkɔ ya Sami ya nɔrdi.” Batatoli ya Yehova babongolaka mikanda na bango na monɔkɔ ya Saami ya nɔrdi. Mpo mindɔndɔ ezala te, lisolo esaleli liloba “Saami” mpo na kolobela monɔkɔ oyo bato mingi ya kuna balobaka.